Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Kokumisa molongani na yo

Kokumisa molongani na yo

MOKAKATANO

Maloba ya kokumisa ezalaka na ntina mingi mpo libala elonga. Kasi, mibali mpe basi mingi bamonaka lisusu te bizaleli malamu ya balongani na bango, ya mabe koleka balobaka polele te ete basepelaka na yango. Na buku moko (Emotional Infidelity) mopesi-toli moko amonaki ete babalani mingi oyo bayaka epai na ye kozwa toli “bamitungisaka mingi mpo na makambo oyo esalemaka te [na mabala na bango] kasi te oyo esalemaka. Bayaka na biro na ngai mpo na kotuna ngai soki básala nini mpo makambo ebongwana, kasi te etikala kaka bongo. Libunga oyo babalani yango basalaka ezali ete bakokaka te kokumisa balongani na bango mpo na komonisa ete balingaka bango.”

Yo ná molongani na yo bokoki kosala nini mpo na koboya libunga wana?

OYO OSENGELI KOYEBA

Maloba ya kokumisa ekoki kozipa mitungisi ya libala. Soki mwasi ná mobali bazali kosala milende ya komona mpe koyeba ezaleli mokomoko ya malamu ya moninga, na ntembe te bakolingana makasi mpenza. Ata matata ya makasi ndenge nini ekoki kokita soki mokomoko amonaka ete moninga akumisaka ye.

Mpo na basi. Buku oyo touti kolobela, elobi: “Basi mingi bazwaka mpenza na valɛrɛ te milende oyo mibali na bango basalaka mpo na koleisa libota.” Na bamboka mosusu, likambo yango ekoki komonana na mabota oyo mwasi ná mobali basalaka.

Mpo na mibali. Mbala mingi mibali bazwaka na valɛrɛ te milende oyo basi basalaka mpo na kosunga libota, ezala na mosala, kobɔkɔla bana to kobongisa ndako. Fiona, * oyo asali mbula soki misato na libala, alobi boye: “Biso nyonso tosalaka mabunga, mpe soki ekómeli ngai namiyokaka mabe. Yango wana soki mobali na ngai alobi na ngai ete nasali eloko moko ya malamu na ndako, na ndakisa misala ya ndako, namonaka ete alingaka ngai kaka atako nasalaka mabunga. Namonaka mpe ete asalisaka ngai mpe namiyokaka malamu mpenza!”

Kasi soki molongani na yo amonaka ete ozwaka ye lokola mwana ya mosala, yango ekoki kobebisa bosembo na libala. Mwasi moko na nkombo Valerie, alobi boye: “Soki ozali komona lokola molongani na yo asepelaka na yo te, ezali mpasi te omipesa epai ya moto oyo omonaka ete asepelaka na yo.”

OYO OKOKI KOSALA

Yebá kosalela miso. Na boumeli ya pɔsɔ oyo ekoya, luká komona bizaleli ya malamu oyo molongani na yo azali komonisa. Talá mpe makambo oyo azali kosala mpo makambo etambola malamu na ndako na bino, makambo oyo mbala mosusu tii sikoyo ozwaka yango mpenza na valɛrɛ te. Na nsuka ya pɔsɔ salá liste ya (1) bizaleli oyo osepeli na yango epai ya molongani na yo mpe (2) makambo asalaki mpo na bolamu ya libota na bino.Toli ya Biblia: Bafilipi 4:8.

Mpo na nini kosalela miso ezali na ntina? Mwasi moko na nkombo Erika, alobi boye: “Nsima ya mwa bambula ya libala okoki kobanda kozwa molongani na yo na valɛrɛ lisusu te. Okotika kotala makambo ya malamu oyo asalaka mpe okobanda kotala kaka oyo azali kosala te.”

Omituna boye: ‘Nazwaka mpenza na valɛrɛ mosala makasi oyo molongani na ngai asalaka?’ Na ndakisa soki mobali na yo abongisi eloko moko na ndako, oboyaka kopesa ye mersi mpo omonaka ete ezali mokumba na ye? Soki ozali mobali, omonaka nde ete milende oyo mwasi na yo asalaka mpo na kobɔkɔla bana esɛngi te opesa ye longonya mpo ezali mosala na ye? Tyá mokano ya kotala mpe kopesa longonya na milende nyonso oyo molongani na yo asalaka mpo na litomba ya libota na bino.Toli ya Biblia: Baroma 12:10.

Kumisáká molongani na yo. Biblia elobi ete tómonisaka botɔndi. (Bakolose 3:15) Yango wana kómá na momeseno ya kopesaka molongani na yo mersi. Mobali moko na nkombo James, alobi boye: “Soki mwasi na ngai apesi ngai mersi mpo na likambo oyo nasali, etindaka ngai nasala lisusu makasi mpo na kozala mobali malamu mpe nabakisa milende oyo nazali kosala na libala na biso.”Toli ya Biblia: Bakolose 4:6.

Basi ná mibali oyo bakumisanaka balinganaka lisusu makasi. Mobali moko na nkombo Michel, alobi boye: “Namoni soki balongani mingi batyaka miso na makambo oyo basepelaka na yango epai ya balongani na bango, mbɛlɛ mabala mingi ekufaka te. Soki matata ebimi, ekozala mpasi báboma libala mpo ntango nyonso babosanaka te makambo ya malamu oyo mokomoko asalelaka moninga.”

^ par. 9 Bankombo mosusu ezali ya bango te.