Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosɛka ezali kado oyo okoki kopesa basusu

Kosɛka ezali kado oyo okoki kopesa basusu

SOKI moto asɛkisi yo, osalaka nini? Ntango mosusu yo mpe osɛkaka. Na ntembe te, oyokaka esengo. Soki moninga to moto oyo oyebi te asɛki, yango ekoki kosala ete osɛka mpe omiyoka malamu. Mwasi moko na nkombo Magdalena alobaki boye: “Georg mobali na ngai oyo akufá azalaki kosɛka kitoko. Soki miso na ngai ná ye ekutani, nazalaki komiyoka malamu mpe nakoki kobanga te.”

Kosɛka emonisaka ete moto azali na makanisi ya malamu, na ndakisa asɛkisaka, azali moto ya esengo. Kutu lisolo moko ya Zulunalo Observer ya Association for Psychological Science na Internet emonisi ete “kosɛka ezali likambo oyo tobotamaka na yango.” Lisolo yango ebakisi boye: “Ata bebe oyo abotami sika soki atali elongi ya moto, ayebaka mpenza soki moto yango azali na esengo to mawa.” Elobi lisusu boye: “Kosɛka esalisaka moto ayeba soki moto oyo asɛkisi ye azali na nsango ya ntina mpe yango ekoki kosalisa moto ayeba oyo akosala.” *

Ankɛtɛ oyo iniversite moko ya États-Unis (Harvard University), esalaki epai ya mibange oyo bazalaki kobɛla mpe ndenge oyo bazalaki kosala soki batali bilongi ya minganga na bango, emonisaki ete soki batali ‘bilongi’ ya minganga yango mpe bamoni ete bazali na esengo, bazali kotyela bango likebi mpe komitya na esika na bango, mibange yango bazalaki komiyoka malamu, sante mpe makanisi na bango ezalaki kobonga. Kasi soki minganga basali bongo te, bato na bango ya maladi bazalaki kobika noki te.

Kosɛka ezali mpe mpo na bolamu na yo moko. Ndenge ankɛtɛ yango emonisi, kosɛka esalaka mpe ete moto akóma komityela motema, azala na esengo mpe amitungisa mingi te. Nzokande kokanga elongi ekoki kosala yo mabe.

KOSƐKA “EKITISAKI NGAI MOTEMA”

Magdalena, oyo tolobelaki na ebandeli, azali Motatoli ya Yehova. Na Etumba ya mibale ya mokili mobimba, bamemaki ye ná bato mosusu ya libota na ye na Ravensbrück, kaa ya bakangami na Allemagne mpo baboyaki kotosa mibeko ya Banazi. Alobi boye: “Ntango mosusu, bakɛngɛli bazalaki kopekisa biso tósolola. Kasi bazalaki na likoki te ya kopekisa biso kosala bajɛstɛ na bilongi. Komona kaka ndenge mama ná ndeko na ngai ya mwasi bazalaki kosɛka ekitisaki ngai motema mpe epesaki ngai makasi ya koyika mpiko.”

Mbala mosusu mitungisi ya bomoi esalaka ete osɛkaka mpenza te. Kasi kobosana te ete komiyoka bongo eutaka nde na makanisi. (Masese 15:15; Bafilipi 4:8, 9) Na yango, ata soki ezali mpasi, soki likoki ezali, mpo na nini te okanisaka makambo ya malamu, oyo esepelisaka? * Kotánga Biblia mpe kobondela esalisá bato ebele básala bongo. (Matai 5:3; Bafilipi 4:6, 7) Kutu, liloba “esengo” mpe maloba mosusu oyo euti na liloba yango ezali mbala ebele na Biblia! Mpo na nini te otángaka lokasa moko to mibale na mokolo? Ekoki kosimba! Mbala mosusu mpe okokóma kosɛka mwa mingi.

Lisusu kozela te kaka bato nde básɛkisa yo. Yo nde bandá; bakiselá moto mwa esengo na mokolo. Taleláká kosɛka lokola likabo ya Nzambe oyo ebakiselaka yo esengo mpe bato oyo osɛkisi.

^ par. 3 Kutu Biblia esaleli maloba ya elilingi mpo na komonisa ete Nzambe mpe asɛkaka. Nzembo 119:135 elobi boye: “Ngɛngiselá mosaleli na yo elongi na yo.”

^ par. 8 Talá lisolo “Ozalaka na ‘fɛti ntango nyonso’?” na Lamuká! ya 11/2013