Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mawa oyo bana bayokaka

Mawa oyo bana bayokaka

Ozali na mawa mpo moto moko ya libota na yo akufi? Soki bongo, okoki kosala nini mpo olonga mokakatano yango? Talá ndenge Biblia esalisaki bilenge misato bálonga mokakatano yango.

ISTWARE YA DAMI

Dami

Na ebandeli, emonanaki lokola papa azalaki koyoka kaka mwa motó mpasi. Kasi, ntango mpasi yango ekómaki makasi, mama abengaki ambilansi. Nabosanaka te ndenge minganga bamemaki ye. Nakanisaki te ete ekozala mbala ya nsuka ya komona ye. Nsima ya mikolo misato, papa akufaki na maladi babengi anévrisme. Nazalaki kaka na mbula motoba.

Bambula ebele, nazalaki komipesa foti mpo na liwa ya papa. Nazalaki ntango nyonso kokanisa ndenge minganga bamemaki papa, mpe nakómaki komituna: ‘Mpo na nini natɛlɛmaki kaka bongo kozanga kosala eloko?’ Nakómaki kotala mibange oyo bazali kobɛla mpe komituna, ‘mpo na nini bango bakufi te, kaka papa na ngai?’ Mama azalaki kosalisa ngai naloba ndenge nazalaki komiyoka. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, bandeko ya lisangá basalisaki biso mpenza.

Bato mosusu bakanisaka ete mawa ezalaka makasi ntango likambo esalemi mpenza, kasi na nsima esilaka na yango; kasi ya ngai ezalaki bongo te. Mawa na ngai eyaki makasi na ebandeli mpenza ya bolenge na ngai.

Toli nakoki kopesa bilenge oyo baboti na bango bakufi ezali oyo: “Yebisá moto moko ndenge ozali komiyoka. Ntango mosusu soki oyebisi yango moto mosusu noki, okomiyoka mpe malamu noki.”

Esalaka mpasi kokutana na makambo ya minene na bomoi kozanga papa. Kasi elaka ya Biblia oyo ezali na Emoniseli 21:4, ebɔndisaka ngai; elobi ete mosika te Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na [biso], mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”

ISTWARE YA DERRICK

Derrick

Basuvenire ya malamu ya papa, oyo natikalá na yango ezali ndenge tozalaki kokende kokanga mbisi ná ye mpe komata na bangomba. Azalaki kolinga bangomba.

Na bantango mosusu maladi ya motema ezalaki kotungisa papa; nazali koyeba lisusu ndenge nakendaká kotala ye mbala soki moko to mibale na lopitalo ntango nazalaki mwana moke mpenza. Kasi nayebaki te ete maladi yango ezalaki mabe mpenza. Akufaki na maladi yango ntango nazalaki na mbula libwa.

Ntango akufaki, nalelaki mingi. Namiyokaki lokola nasili makasi mpe nazalaki koboya kosolola na bato. Natikalá naino komiyoka bongo te bomoi na ngai mobimba mpe namonaki lokola nakokoka kosala ata likambo moko lisusu te. Na ebandeli, etuluku ya bilenge na eglize oyo nazalaki kosambela batyelaki ngai likebi kasi eumelaki te, basundolaki ngai. Bato bazalaki koloba na ngai, “mokolo na ye ekokaki” to “Nzambe abengi ye” to “azali sikoyo na lola.” Makambo oyo bazalaki koloba ezalaki kosepelisa ngai ata moke te, kasi nayebaki te oyo Biblia eteyaka mpenza mpo na makambo yango.

Na nsima, Batatoli ya Yehova bakómaki koyekola na mama Biblia, na nsima, ngai ná yaya na ngai tokómaki mpe koyekola Biblia. Toyekolaki ndenge moto akómaka nsima ya liwa mpe elaka ya kobɔndisa oyo Nzambe apesi, ya kosekwisa bato. (Yoane 5:28, 29) Kasi vɛrsɛ oyo esalisaki ngai mingi ezali Yisaya 41:10, Nzambe alobi boye: “Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.” Lokola nayebaki ete Yehova azali na ngai, ebɔndisaki ngai mpenza na eleko wana ya mawa mpe elendisaka ngai tii lelo.

ISTWARE YA JEANNIE

Jeannie

Mama akufaki na kanser ntango nazalaki na mbula nsambo. Liwa ya mama ekamwisaki ngai makasi mokolo yango mobimba. Namonaki lokola mokili ebaluki. Nazali koyeba lisusu mokolo yango liboso mama akufa, bankɔkɔ na ngai bazalaki wana, kutu tokalingaki maki mpo tólya. Bato nyonso bazalaki na kimya.

Kobanda wana, mpe nsima ya bambula, namonaki ete nasengeli kozala makasi mpo na leki na ngai ya moke ya mwasi, yango wana nabombaki ndenge nazalaki komiyoka. Ata lelo oyo mpe, nalingaka kaka kobomba na motema likambo moko oyo esali ngai mpasi mpe bongo ezali mabe mpo na sante.

Nabosanaka te bolingo mpe lisungi ya Batatoli ya Yehova ya lisangá na biso. Atako tobandaki sika koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi, bandeko batikaki biso te, ezalaki lokola toyebaná na bango banda kala. Esalaki mbula mobimba, papa azalaki kolamba te mpo bandeko bazalaki ntango nyonso koya kotikela biso bilei.

Vɛrsɛ oyo nabosanaka te ezali Nzembo 25:16, 17. Na vɛrsɛ yango, mokomi ya nzembo abondelaki Nzambe boye: “Balolá elongi na yo epai na ngai, mpe moniselá ngai boboto; mpo nazali kaka ngai moko mpe nazali na mpasi. Bampasi ya motema na ngai ekómi mingi; Ee longolá ngai na motungisi oyo nazali na yango.” Koyeba ete nazali ngai moko te ntango nazali na mawa, ekitisaka ngai motema. Nzambe akotika ngai te. Biblia esalisi ngai nakende liboso mpe natya makanisi na makambo ya malamu, na ndakisa na elikya ya lisekwa oyo Biblia elaki. Nazali na elikya ya komona lisusu mama na ngai; komona ye na sante ya malamu na paradiso awa na mabele.2 Petro 3:13.

Okosepela koyeba makambo mosusu etali nsango ya kobɔndisa oyo ezali na Biblia mpo na baoyo bandeko to baninga na bango bakufi? Okoki kozwa ofele na Internet mwa buku “Ntango moto oyo olingaka akufi.” Kende na www.mr1310.com, fungolá esika bakomi MIKANDA > BABUKU MPE MWA BABUKU.