Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Nkingo ya furmi

Nkingo ya furmi

BATO YA MAYELE NA MEKANIKI bakamwaka ndenge furmi etombolaka eloko oyo eleki nzoto na yango na kilo. Mpo na koyeba likoki yango, bato ya mayele na Iniversite ya Ohio, na États-Unis, basalaki ordinatɛrɛ moko oyo ezali lokola furmi mpe esalaka lokola furmi. Batyaki na ordinatɛrɛ yango nguya oyo ekokani na oyo furmi ebimisaka ntango ememi kilo mpe scanner mpo esalisaka na komona bililingi.

Eteni ya ntina mingi na nzoto ya furmi ezali nkingo na yango, yango nde ememaka kilo ya biloko oyo monɔkɔ etomboli. Mposo ya pɛtɛɛpɛtɛɛ oyo ezalaka na kati ya nkingo ya furmi ekangamá na nzoto mpe na motó kaka ndenge misapi ya moto ekɔtanaka ntango akutanisi mabɔkɔ na ye. Moko ya bato ya mayele yango alobi boye: “Ndenge oyo mposo ekangamá na nzoto na yango ezali mpenza na ntina mingi mpo na nkingo. Na ntembe te, esika oyo mposo ya makasi ná oyo ya pɛtɛɛ ekutaná ekangamá makasi mpe mbala mosusu yango nde esalaka ete nkingo ezala makasi mpe etombolaka biloko ya kilo.” Bato ya mayele bakanisaka ete soki bayebi malamu ndenge oyo nkingo ya furmi esalaka, ekosalisa bango básala barobo ya malamu koleka.

Okanisi nini? Ndenge oyo nkingo ya furmi esangisi makambo ebeleebele bongo mpe esalaka na boyokani, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?