Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe amityaka na esika na biso?

Nzambe amityaka na esika na biso?

BILOKO OYO NZAMBE AKELÁ EZALI KOTEYA BISO NINI?

Komitya na esika ya moto elimboli “koyeba ndenge oyo azali koyoka to makambo oyo azali kokutana na yango mpe kokanisa soki tolingaki koyoka ndenge nini na esika na ye.” Rick Hanson, monganga moko ya maladi ya motó, alobi ete “komitya na esika ya basusu ezali ezaleli oyo tozalaka na yango na motema banda kobotama.”

KANISÁ NAINO: Mpo na nini tobotamaka na ezaleli ya komitya na esika ya basusu, ezaleli oyo bikelamu mosusu ezali na yango te? Biblia elobi ete Nzambe akelá moto na elilingi na ye. (Ebandeli 1:26) Tosalemá na elilingi ya Nzambe; elingi koloba ete biso mpe tokoki kosala makambo lokola ye mpe komonisa bizaleli na ye. Yango wana, ntango ezaleli ya komitya na esika ya basusu etindaka bato básalisa bazalani na bango, balandaka nde ndakisa ya Yehova Nzambe.​—Masese 14:31.

OYO BIBLIA ETEYI MPO NA NDENGE OYO NZAMBE AMITYAKA NA ESIKA NA BISO

Nzambe amityaka na esika na biso mpe asepelaka ata moke te komona biso tozali konyokwama. Biblia elobi ete ntango Bayisraele bazalaki na boombo na Ezipito mpe na nsima balekisaki mbula 40 na esobe, “ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.” (Yisaya 63:9) Tomoni ete Nzambe asukaki kaka te na komona mpasi na bango. Ye mpe ayokaki mpasi yango. Alobaki boye: “Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.” (Kobima 3:7) Nzambe alobi boye: “Moto oyo azali kosimba bino azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zekaria 2:8) Ntango bato bazali koyokisa biso mpasi, motema na ye mpe eyokaka mpasi.

Biblia elobi ete ata soki tozali komimona ete ebongi te Nzambe ayokela biso mawa, “Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoane 3:19, 20) Ayebi biso malamu koleka biso moko. Ayebi makambo nyonso oyo tozali kokutana na yango, makanisi na biso, mpe mabanzo na biso. Ayebaka komitya na esika na biso.

Tokoki kosɛnga Nzambe akitisa biso motema, apesa biso bwanya, asalisa biso, na elikya ete atikaka te baoyo bazali na mpasi

Biblia elobi na biso

  • “Okobenga, mpe Yehova ye moko akoyanola; okobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe ye akoloba: ‘Ngai oyo!’”​—YISAYA 58:9.

  • “‘Mpo ngai nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya. Mpe bokobenga ngai mpenza, bokoya, bokobondela ngai, mpe ngai nakoyokela bino.’”​—YIRIMIA 29:11, 12.

  • “Tyá mpisoli na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama. Yango ezali na kati ya buku na yo te?”​—NZEMBO 56:8.

NZAMBE AMONAKA, AYEBAKA, MPE AMITYAKA NA ESIKA NA BISO

Koyeba ete Nzambe amityaka na esika na biso ekoki kosalisa biso tóyika mpiko? Tótalela ndakisa ya Maria:

“Mwana na ngai ya mbula 18 abɛlaki kanser mbula mibale mpe na nsima akufaki. Nazalaki komona ete bomoi ezali mpasi mpe bosembo ezali te. Nazalaki koyokela Yehova nkanda ndenge abikisaki ye te!

“Mbula 6 na nsima, ndeko moko ya boboto ayokaki ngai ntango nazalaki koyebisa ye mpo na nini nazalaki komona ete Yehova alingaka ngai te. Ayokaki ngai ntango molai kozanga ete akata ngai maloba; na nsima atángelaki ngai vɛrsɛ moko oyo esimbaki mpenza motema na ngai. Ezalaki 1 Yoane 3:19, 20, oyo elobi: ‘Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.’ Amonisaki ngai ete Yehova ayebaka mpasi na biso.

“Atako bongo, nazalaki kaka na nkanda! Na nsima natángaki Nzembo 94:19, oyo elobi: ‘Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.’ Nayokaki lokola nde bavɛrsɛ yango ekomamá mpo na ngai! Nsukansuka, namonaki ete koyebisa Yehova bampasi na ngai, na elikya ete azali koyoka ngai mpe komitya na esika ngai, ezalaki kokitisa ngai motema.”

Koyeba ete Nzambe ayebaka mpasi na biso mpe ayokelaka biso mawa ezali mpenza kokitisa biso motema! Kasi, mpo na nini mokili etondi na bampasi? Ezali nde mpo Nzambe azali kopesa biso etumbu mpo na mabe na biso? Mokolo mosusu Nzambe akosilisa bampasi nyonso? Tokolobela makambo yango na masolo oyo elandi.