Mokanda ya liboso ya Yoane 3:1-24

  • Tozali bana ya Nzambe (1-3)

  • Bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo (4-12)

    • Yesu akobebisa misala ya Zabolo (8)

  • Tólinganaka (13-18)

  • Nzambe azali monene koleka mitema na biso (19-24)

3  Bótala bolingo monene oyo Tata amoniseli biso,+ mpo tóbengama bana ya Nzambe!+ Mpe yango nde tozali. Yango wana mokili eyebaka biso te,+ mpo eyekoli koyeba ye te.+  Bandeko ya bolingo, tozali sikoyo bana ya Nzambe,+ kasi ndenge oyo tokozala emonisami naino polele te.+ Toyebi ete ntango ye akomonisama, biso tokozala lokola ye, mpo tokomona ye ndenge azali.  Mpe moto nyonso oyo azali na elikya yango na kati na ye amipɛtolaka,+ kaka ndenge moto wana azali pɛto.  Moto nyonso oyo amipesi na lisumu amipesi mpe na kobuka mibeko, mpo lisumu ezali nde kobuka mibeko.  Boyebi mpe ete Yesu ayaki* mpo na kolongola masumu na biso,+ mpe lisumu ezali na kati na ye te.  Moto nyonso oyo atikali na bomoko elongo na ye amipesaka te na kosala lisumu;+ moto oyo amipesi na lisumu amoni ye naino te mpe ayebi ye te.  Bana, moto akosa bino te; moto oyo amipesi na makambo ya bosembo azali moto ya sembo, ndenge moto wana mpe azali moto ya sembo.  Moto oyo amipesi na lisumu auti na Zabolo, mpo Zabolo azali kosala lisumu uta na ebandeli.*+ Ezali mpo na ntina yango nde Mwana ya Nzambe amonanaki: mpo na kobebisa* misala ya Zabolo.+  Moto nyonso oyo abotami na Nzambe amipesaka te na kosala lisumu,+ mpo momboto* ya Nzambe efandi na kati ya moto yango, mpe akoki komipesa na lisumu te, mpo abotami na Nzambe.+ 10  Talá ndenge tokoki koyeba bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo: Moto oyo amipesaka te na kosala makambo ya bosembo auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo alingaka ndeko na ye te.+ 11  Mpo talá nsango oyo boyokaki banda na ebandeli, ete tosengeli kolingana;+ 12  ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki ndeko na ye.+ Mpe mpo na nini abomaki ye? Mpo misala na ye moko ezalaki mabe,+ kasi oyo ya ndeko na ye ezalaki ya bosembo.+ 13  Bandeko, bókamwa te soki mokili ezali koyina bino.+ 14  Toyebi ete tolongwe na liwa tokómi na bomoi,+ mpo tolingaka bandeko.+ Moto oyo alingaka te atikali na kati ya liwa.+ 15  Moto nyonso oyo ayini ndeko na ye azali mobomi,*+ mpe boyebi ete mobomi moko te azali na bomoi ya seko na kati na ye.+ 16  Toyebi mpenza bolingo mpo Yesu Kristo apesaki bomoi* na ye mpo na biso.+ Biso mpe tosengeli kopesa bomoi* na biso mpo na bandeko na biso.+ 17  Kasi moto oyo azali na biloko ya mosuni ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye oyo azangi kasi aboyi koyokela ye mawa, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kozala na kati na ye?+ 18  Bana, tosengeli kolingaka, na maloba to na mbɛbu te,*+ kasi na misala+ mpe na solo.+ 19  Ndenge wana nde tokoyeba ete touti na solo, mpe tokondimisa* mitema na biso liboso na ye 20  na likambo nyonso oyo mitema na biso ekoki kokweisa biso na yango, mpo Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.+ 21  Bandeko ya bolingo, soki mitema na biso ezali kokweisa biso te, tokoki kozala na elobeli ya polele liboso ya Nzambe;+ 22  mpe nyonso oyo tosɛngaka, tozwaka yango epai na ye,+ mpo tozali kotosa mibeko na ye mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye. 23  Kutu, mobeko na ye yango oyo: ete tózala na kondima na nkombo ya Mwana na ye Yesu Kristo+ mpe tólinganaka,+ kaka ndenge apesaki biso mobeko. 24  Lisusu, moto oyo atosaka mibeko na ye atikali na bomoko elongo na ye, mpe ye na bomoko elongo na moto yango.+ Mpe na nzela ya elimo oyo apesaki biso, toyebi ete ye atikali na bomoko elongo na biso.+

Maloba na nse

Lil., “amonisamaki.”
To, “banda ntango abandaki.”
To, “kobukabuka.”
Elingi koloba, momboto oyo ekoki kobota mbuma.
To, “mobomi-bato.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “lolemo te.”
To, “tokokitisa.”