Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Apesá biso bonsomi ya kopona

Apesá biso bonsomi ya kopona

Pusaná penepene na Nzambe

Apesá biso bonsomi ya kopona

2 BAKONZI 18:1-7

BABOTI basengeli kopesa bana na bango ndakisa malamu. Ndakisa malamu ya baboti ekoki kosalisa mwana akolisa bizaleli ya malamu mpe apona makambo ya malamu na bomoi na ye. Likambo ya mawa, baboti mingi bapesaka bana na bango ndakisa ya mabe. Yango elingi nde koloba ete bana wana basengeli kaka kolanda ndakisa mabe wana? Eyano ezali na likambo moko oyo tokoki kotyela yango ntembe te​—Yehova Nzambe apesá mokomoko na biso bonsomi ya kopona. Tózwa ndakisa ya Hizikiya oyo ezali na 2 Bakonzi 18:1-7.

Hizikiya azalaki “mwana ya Ahaze mokonzi ya Yuda.” (Vɛrsɛ 1) Ahaze apɛngwisaki bato na ye na losambo ya pɛto ya Yehova. Mokonzi wana ya mabe, akɔtisaki losambo ya Baala, ná milulu na yango ya kopesa bambeka ya bato. Abomaki ndeko moko to bandeko mingi ya Hizikiya. Ahaze akangaki baporte ya tempelo mpe “amisalelaki bitumbelo na esika nyonso babalabala ekutani na Yerusaleme.” “Asilikisaki Yehova.” (2 Ntango 28:3, 24, 25) Emonani polele ete Hizikiya azalaki na tata moko mabe mpenza. Kasi, Hizikiya asengelaki nde kolanda kaka mabunga ya tata na ye?

Ntango akómaki mokonzi na esika ya Ahaze, eumelaki te Hizikiya amonisaki ete alandaki te ndakisa mabe ya tata na ye. Hizikiya “akobaki kosala oyo ezali sembo na miso ya Yehova.” (Vɛrsɛ 3) Hizikiya atyelaki Yehova motema mpe “moto moko te azalaki lokola ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda.” (Vɛrsɛ 5) Na mbula ya liboso ya bokonzi na ye, elenge mokonzi yango abandaki kozongisa losambo ya pɛto; yango wana alongolaki bisika oyo etombwaná, epai bato bazalaki kosambela bikeko ya bapakano. Tempelo efungwamaki lisusu, mpe losambo ya pɛto ezongisamaki. (Vɛrsɛ 4; 2 Ntango 29:1-3, 27-31) Hizikiya “akangamaki se na Yehova. . . . Mpe Yehova azalaki elongo na ye.”​—Vɛrsɛ 6, 7.

Nini esalisaki Hizikiya alanda te ndakisa mabe ya tata na ye? Ekoki nde kozala ete mama na ye Abiya​—oyo toyebi makambo mingi te mpo na ye—​apesaki mwana na ye ndakisa malamu? Ndakisa malamu ya Yisaya, oyo abandaki mosala na ye ya mosakoli liboso Hizikiya abotama, nde esalisaki elenge mokonzi yango? * Biblia elobi te. Ata soki ezali bongo to te, likambo oyo ezali solo ete: Hizikiya alandaki te etamboli ya tata na ye.

Ndakisa ya Hizikiya ekoki kolendisa moto nyonso oyo abɔkwamá na baboti oyo bazali na etamboli ya mabe. Ezali mpasi kobongola makambo oyo eleká; tokoki te kolongola makambo ya mpasi oyo tokutaná na yango. Kasi, makambo yango emonisi te ete tokoki kolonga te. Lelo oyo, tokoki kopona makambo oyo ekomemela biso esengo na mikolo ezali koya. Ndenge moko na Hizikiya, tokoki kopona mpe kolinga kosambela Nzambe ya solo, Yehova. Bomoi ya ndenge wana ememaka esengo lelo oyo mpe ekoki komemela biso bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. (2 Petro 3:13; Emoniseli 21:3, 4) Tosengeli mpenza komonisa botɔndi epai ya Nzambe ya bolingo oyo apesá mokomoko na biso likabo eleki kitoko​—bonsomi ya kopona!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Ekoki kozala ete mosakoli Yisaya asalaki mosala na ye kobanda na mobu soki 778 liboso ya ntango na biso, tii nsima ya mobu 732 liboso ya ntango na biso. Hizikiya abandaki koyangela na mobu 745 liboso ya ntango na biso, ntango azalaki na mbula 25.