Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Ndenge ya kozala na libala ya esengo

Batoli oyo Biblia epesaka mpo na kozala na libala ya esengo esalisaka mpenza mpo eutaka epai ya Yehova Nzambe, mobandisi ya libala. Eteyaka biso ndenge ya kokóma na bizaleli oyo ekoki kosala ete libala ezala ya esengo mpe ekebisaka biso na bizaleli oyo ekoki kobebisa libala. Eteyaka mpe ndenge malamu ya kosololaka mpo esengo ebakisama na libala.​—Tángá Bakolose 3:8-10, 12-14.

Mwasi ná mobali basengeli kopesanaka lokumu mpe limemya. Ntango bango mibale bandimi mokumba oyo Nzambe apesi bango na libala, bakoki kozala na esengo.​—Tángá Bakolose 3:18, 19.

Nini esalaka ete libala eumela?

Balongani bakoki kokoba kozala elongo soki balinganaka. Nzambe ateyaka biso ndenge ya komonisa bolingo. Ye ná Mwana na ye Yesu, bazali ndakisa malamu na likambo etali komonisa bolingo ya solosolo.​—Tángá 1 Yoane 4:7, 8, 19.

Soki mwasi ná mobali bazali kotalela libala ete ezali ebongiseli ya Nzambe, bakokabwana te. Nzambe asalaki libala mpo mwasi ná mobali báfanda libela mpe na ndenge yango libota ebatelama. Libala ekoki koumela mpo Nzambe akelá mwasi ná mobali na likoki ya kokokisa bamposa ya moninga, ya nzoto mpe ya motema. Asalá bango na elilingi na ye, mpe apesá bango likoki ya komekola bolingo na ye.​—Tángá Ebandeli 1:27; 2:18, 24.