Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE NINI NZAMBE ATALELAKA BITUMBA?

Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo

Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo

Bato bazali konyokwama lelo oyo. Mingi na bango balelelaka Nzambe mbala na mbala mpo asalisa bango mpe bamitunaka soki akosalisa bango. Nzambe ayokaka kolela na bango? Bongo baoyo bamonaka malamu bábunda mpo na kosilisa bampasi na bango, Nzambe apesaka bango mabɔkɔ, amonaka ete babundaka na ntina?

Armagedone ekozala etumba oyo ekosukisa bitumba nyonso

Koyeba ete Nzambe amonaka bampasi oyo ezali na mokili mpe akani kosilisa yango ekoki kobɔndisa yo. (Nzembo 72:13, 14) Nzambe alaki na Liloba na ye Biblia ete ‘baoyo bazali kozwa bolɔzi, bakozwa kopema.’ Ntango nini? “Na ntango ya emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya . . . ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Batesaloniki 1:7, 8) Emoniseli ya Yesu ekosalema na mikolo ezali koya na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” ndenge Biblia ebengi yango, eyebani mpe na nkombo Armagedone.​—Emoniseli 16:14, 16.

Na etumba yango, Nzambe akosalela bato te, kasi nde Mwana na ye Yesu Kristo ná bikelamu mosusu ya elimo ya nguya mpo na kobunda na bato mabe. Mampinga wana ya likoló ekosilisa bampasi nyonso.​—Yisaya 11:4; Emoniseli 19:11-16.

Tii lelo, ndenge oyo Nzambe atalelaka bitumba ebongwani te. Atalelaka yango kaka lokola mwaye oyo ebongi mpo na kosilisa minyoko mpe makambo mabe. Kasi, kaka ndenge makambo oyo eleká emonisi yango, Nzambe ye moko nde amonisaka ntango oyo etumba esengeli kobanda mpe nani akobunda. Ndenge tomoni yango, Nzambe amonisi ete bitumba oyo ekosilisa mabe mpe ekozongisa mabe epai ya baoyo banyokolaka basusu ekosalema na mikolo ezali koya mpe Mwana na ye Yesu Kristo nde akobunda. Yango emonisi ete Nzambe andimaka te bitumba oyo bato babundaka lelo, ata soki emonani ete bazali kobunda na ntina.

Tózwa ndakisa: Kanisá ete bana mibale bazali kobunda ntango tata na bango azali te. Batiki naino kobunda mpe babengi tata na bango na telefone. Moko alobi ete oyo mosusu nde abandaki bitumba, mpe mosusu alobi ete ezali mpo oyo mosusu atumolaki ye. Mokomoko na bango alingi ete tata akɔtela ye. Kasi, nsima ya koyoka bango mibale, tata ayebisi bango bátika kobunda mpe bázela ye tii ntango akozonga na ndako mpo akata likambo yango. Bazeli mpo na mwa ntango, kasi eumeli te, babandi lisusu kobunda. Ntango tata azongi na ndako, asepeli ata na moko na bango te mpe apesi bango nyonso mibale etumbu mpo batosi ye te.

Lelo oyo, mbala mingi bikólo oyo ebundaka esɛngaka lisalisi ya Nzambe. Kasi Nzambe akɔtelaka ekólo moko te na bitumba ya lelo. Kutu, na Biblia Liloba na ye, alobi polele boye: “Bózongisela moto mabe na mabe te,” mpe “moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te.” (Baroma 12:17, 19) Longola yango, amonisi ete bato basengeli ‘kozela ye na mposa makasi’ ete asala likambo moko, mpe akosala yango na Armagedone. (Nzembo 37:7) Ntango bato ya bikólo baboyaka kozela Nzambe mpe bakobaka kobunda, Nzambe amonaka yango makambo ya mobulu oyo euti na lofundo mpe asepelaka na yango te. Na yango, na Armagedone, Nzambe akomonisa nkanda na ye mpe akosilisa matata ya bikólo mpe ‘akosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele’ mpo na libela. (Nzembo 46:9; Yisaya 34:2) Ya solo, Armagedone ekozala etumba oyo ekosukisa bitumba nyonso.

Nsuka ya bitumba ezali moko ya ebele ya mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu alobelaki guvɛrnema yango na libondeli oyo eyebani mingi: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Bokonzi ya Nzambe ekosilisa bitumba nyonso mpe ekolongola mpenza mabe, likambo oyo ebimisaka bitumba. * (Nzembo 37:9, 10, 14, 15) Yango wana ezali likambo ya kokamwa te soki bayekoli ya Yesu bazelaka na mposa makasi mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe.​—2 Petro 3:13.

Kasi, tii ntango nini tosengeli kozela Bokonzi ya Nzambe esilisa bampasi, minyoko mpe makambo nyonso ya mabe? Kokokisama ya bisakweli ya Biblia emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo. (2 Timote 3:1-5) * Mosika te, Bokonzi ya Nzambe ekosukisa mikolo ya nsuka na etumba ya Armagedone.

Ndenge tomonisaki yango liboso, baoyo bakokufa na etumba wana ya nsuka ekozala baoyo “bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Batesaloniki 1:8) Kasi kobosana likambo oyo te, Nzambe asepelaka na liwa ya moto te, ezala ya moto mabe. (Ezekiele 33:11) Lokola “alingi moto ata moko te abomama” na etumba yango ya nsuka, azali kosala nyonso mpo nsango malamu etali Nkolo Yesu ‘esakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso’ liboso nsuka eya. (2 Petro 3:8, 9; Matai 24:14; 1 Timote 2:3, 4) Ya solo, na nzela ya mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba, bato bazali lelo na libaku ya koyeba Nzambe, kotosa nsango malamu etali Yesu mpe kozala na bomoi mpo na komona mokolo oyo bitumba ekozala lisusu te.

^ par. 9 Bokonzi ya Nzambe ekolongola mpe liwa monguna ya bato. Ndenge emonisami na lisolo “Biyano na mituna ya Biblia” na nimero oyo, Nzambe akosekwisa ebele ya bato, ata mpe mingi ya baoyo bakufá mpo na bitumba na boumeli ya bambula.

^ par. 10 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.