Emoniseli epai ya Yoane 16:1-21

  • Mabakuli nsambo ya nkanda ya Nzambe (1-21)

    • Bósopa na mabele (2), na mbu (3), na bibale mpe maziba ya mai (4-7), na moi (8, 9), na kiti ya bokonzi ya nyama mabe (10, 11), na Efrate (12-16), mpe na mopɛpɛ (17-21)

    • Etumba ya Nzambe na Armagedone (14, 16)

16  Mpe nayokaki mongongo moko ya makasi euti na esika mosantu+ elobi na baanzelu yango nsambo ete: “Bókende kosopa mabakuli nsambo ya nkanda ya Nzambe na mabele.”+  Oyo ya liboso akendaki mpe asopaki kibakuli na ye na mabele.+ Mpota moko ya mabe mpe oyo elyaka nzoto+ ebɛtaki bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mabe wana+ mpe baoyo bazalaki kosambela elilingi na yango.+  Oyo ya mibale asopaki kibakuli na ye na mbu.+ Mpe ekómaki makila+ lokola ya moto oyo akufi, mpe ekelamu* nyonso ya bomoi ekufaki, ɛɛ, biloko oyo ezalaki na mbu.+  Oyo ya misato asopaki kibakuli na ye na bibale mpe na maziba ya mai.+ Mpe ekómaki makila.+  Nayokaki anzelu oyo azali na bokonzi likoló ya mai alobi ete: “Yo Oyo ozali mpe ozalaki,+ Moto ya sembo,+ ozali moyengebene, mpo ozwi bikateli wana,+  mpo basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli,+ mpe opesi bango makila bámɛla;+ babongi na yango.”+  Mpe nayokaki etumbelo elobi ete: “Ɛɛ, Yehova* Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ bikateli* na yo ezali solo mpe sembo.”+  Oyo ya minei asopelaki moi kibakuli na ye,+ mpe bapesaki moi nzela ya kozikisa bato na mɔtɔ.  Mpe bato bazikaki na molunge makasi, kasi bafingaki nkombo ya Nzambe, oyo azali na bokonzi likoló ya malɔzi wana, babongolaki mitema te mpe bakumisaki ye te. 10  Oyo ya mitano asopaki kibakuli na ye na kiti ya bokonzi ya nyama mabe. Bokonzi na ye ekómaki molili,+ mpe babandaki komiswa lolemo mpo na mpasi, 11  kasi bafingaki Nzambe ya likoló mpo na mpasi na bango mpe mpo na bampota na bango, mpe babongolaki mitema te, batikaki te misala na bango. 12  Oyo ya motoba asopaki kibakuli na ye na ebale monene Efrate,+ mpe mai na yango ekaukaki,+ mpo nzela ebongisama mpo na bakonzi+ oyo bauti epai moi ebimaka.* 13  Mpe namonaki maloba misato ya elimo ya mbindo oyo ezalaki lokola magorodo* ezali kobima na monɔkɔ ya dragɔ+ mpe na monɔkɔ ya nyama mabe mpe na monɔkɔ ya mosakoli ya lokuta. 14  Ya solo, yango ezali maloba oyo euti na bademo mpe ezali kosala bilembo,+ mpe ezali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba+ ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ 15  “Talá! Nazali koya lokola moyibi.+ Esengo na moto oyo alali mpɔngi te+ mpe azali kobatela bilamba na ye ya likoló, mpo atambola bolumbu te mpe bátala nsɔni na ye te.”+ 16  Mpe bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre Armagedone.*+ 17  Oyo ya nsambo asopelaki mopɛpɛ kibakuli na ye. Bongo mongongo moko ya makasi ebimaki na esika mosantu,+ euti na kiti ya bokonzi, elobi ete: “Esalemi!” 18  Mpe mikalikali ebimaki, mingongo eyokanaki, bankake ebɛtaki, mpe mabele eninganaki makasi mpenza na ndenge oyo esalemá naino te banda bato bazali na mabele,+ mabele eninganaki makasi, makasi mpenza. 19  Engumba monene+ ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikólo ekweaki; Nzambe akanisaki Babilone Monene,+ mpo na kopesa yango kɔpɔ ya vinyo ya nkanda na ye makasi.+ 20  Lisusu, bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki te.+ 21  Bongo mbula ya mabanga minene, oyo libanga mokomoko ezalaki na kilo soki ya talanta* moko, eutaki na likoló ekiteli bato,+ mpe bato yango bafingaki Nzambe mpo na bolɔzi wana ya mbula ya mabanga,+ mpo bolɔzi yango ezalaki monene mpenza.

Maloba na nse

To, “molimo.”
Talá Ap. A5.
To, “bikateli ya lisambisi.”
To, “uta na ɛsti.”
To, “mbemba.”
Na Grɛki, Har magédôn, euti na liloba ya Ebre oyo elimboli, “ngomba ya Megido.”
Talanta moko ya Bagrɛki = 20,4 kg. Talá Ap. B14.