Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 18

Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?

“Ee Moyoki ya libondeli, bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.”

Nzembo 65:2

“Tyelá Yehova motema na yo mobimba, mpe kotya motema te na mayele na yo moko. Kanisá ye na banzela na yo nyonso, mpe akosembola banzela na yo.”

Masese 3:5, 6

“Oyo elakisi bomoi ya seko: báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”

Yoane 17:3

“Ya solo, [Nzambe] azali mosika te na mokomoko na biso.”

Misala 17:27

“Nazali kokoba kobondela ete bolingo na bino ebakisama lisusu mingi mpenza, ná boyebi ya solosolo ná bososoli mingi mpenza.”

Bafilipi 1:9

“Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo apesaka bato nyonso na motema mobimba, mpe apamelaka te, mpe akopesa ye yango.”

Yakobo 1:5

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino. Bópɛtola mabɔkɔ na bino, bino basumuki, mpe bókómisa mitema na bino pɛto, bino bato ya mitema mibale.”

Yakobo 4:8

“Kolinga Nzambe elakisi ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”

1 Yoane 5:3