Epai ya Baroma 5:1-21

  • Boyokani na Nzambe ezongi na nzela ya Kristo (1-11)

  • Liwa na nzela ya Adama, bomoi na nzela ya Kristo (12-21)

    • Lisumu ná liwa epalangani epai ya bato nyonso (12)

    • Likambo kaka moko ya kokómisa bato sembo (18)

5  Yango wana, lokola totángami bato ya sembo* mpo na kondima,+ tiká tózala na kimya* elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo,+  oyo na nzela na ye, na kondima, tokoki mpe kopusana pene na Nzambe mpo na kozwa boboto monene oyo azali komonisela biso sikoyo;+ mpe tiká tósepela* na elikya oyo tozali na yango ya kozwa nkembo ya Nzambe.  Esuki kaka bongo te, kasi tósepela* mpe ntango tokutani na minyoko,*+ mpo toyebi ete monyoko ebotaka ezaleli ya koyika mpiko;+  ezaleli ya koyika mpiko esalaka ete Nzambe andima moto;+ kondimama yango ebotaka elikya,+  mpe elikya yango eyokisaka nsɔni te;+ mpo bolingo ya Nzambe etondi na mitema na biso na nzela ya elimo santu, oyo apesi biso.+  Mpo ya solo, ntango tozalaki naino na bolɛmbu,+ na ntango oyo etyamá, Kristo akufelaki bato oyo batyolaka Nzambe.  Mpamba te ezali mpasi mpenza moto akufa mpo na moto ya sembo; kasi mbala mosusu, moto akoki ata kondima kokufa mpo na moto malamu.  Kasi Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.+  Yango wana, lokola sikoyo totángami bato ya sembo na nzela ya makila na ye,+ tokobika na nkanda ya Nzambe na nzela na ye.+ 10  Mpo soki ntango tozalaki banguna, tozongisaki boyokani ná Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye,+ sikoyo lokola tozongisi boyokani, tokobika mpe na nzela ya bomoi na ye. 11  Esuki kaka bongo te, kasi tozali mpe kosepela na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo, oyo azongisi biso sikoyo na boyokani.+ 12  Yango wana, kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu,+ ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu—.+ 13  Mpo lisumu ezalaki na mokili liboso ya Mibeko, kasi batángelaka moto lisumu te soki mibeko ezali te.+ 14  Nzokande, liwa eyangelaki banda na Adama tii na Moize, eyangelaki ata baoyo basalaki lisumu te lokola oyo ya Adama ntango abukaki mobeko, ye oyo akokani na moto oyo asengelaki koya.+ 15  Likabo ekeseni na libunga. Mpo soki na libunga ya moto kaka moko bato mingi bakufaki, boboto monene ya Nzambe ná likabo na ye ya ofele, oyo epesamaki elongo na boboto monene na nzela ya moto kaka moko+ Yesu Kristo, epesi bato mingi bolamu oyo ekokani na bolamu mosusu te.+ 16  Lisusu, likabo yango ya ofele ekeseni na makambo oyo esalemaki mpo na lisumu ya moto yango kaka moko.+ Mpo lisambisi oyo eyaki nsima ya libunga kaka moko wana ebimisaki etumbu,+ kasi likabo oyo eyaki nsima ya mabunga ebele esalaki ete bato bátángama bato ya sembo.*+ 17  Mpo soki na libunga ya moto kaka moko liwa eyangelaki na nzela ya moto yango,+ baoyo bazali kozwa ebele ya boboto monene mpe ya likabo ya ofele ya bosembo*+ bakozala na bomoi mpe bakoyangela+ mpenza na nzela ya moto kaka moko, Yesu Kristo!+ 18  Yango wana, ndenge kaka bato ya lolenge nyonso bazwaki etumbu mpo na libunga kaka moko,+ ndenge moko mpe na nzela ya likambo kaka moko ya bosembo, bato ya ndenge nyonso+ batángami bato ya sembo mpo na bomoi.+ 19  Mpo ndenge kozanga botosi ya moto kaka moko ekómisaki ebele ya bato basumuki,+ ndenge moko mpe botosi ya moto kaka moko ekokómisa bato mingi bato ya sembo.+ 20  Nzokande Mibeko eyaki komonana mpo libunga ekóma mingi.+ Kasi epai lisumu ekómaki mingi, boboto monene emonisamaki lisusu mingi koleka. 21  Mpo na nini? Mpo, ndenge lisumu eyangelaki esika moko na liwa,+ boboto monene mpe eyangela na nzela ya bosembo mpo na bomoi ya seko na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso.+

Maloba na nse

To mbala mosusu, “tozali na kimya.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “tozali kosepela.”
To mbala mosusu, “tozali kosepela.”
To, “malɔzi.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.