Masese 23:1-35

  • Ntango babengisi yo omipekisa (2)

  • Kolanda bomɛngo te (4)

  • Bomɛngo ekoki kokima yo (5)

  • Kozala te na kati ya bato oyo bamɛlaka mingi (20)

  • Vinyo eswaka lokola nyoka (32)

23  Soki ofandi mpo na kolya elongo na mokonzi,Kebá na eloko oyo ezali liboso na yo,   Tyá mbeli na nkingo na yo*Soki ozali na mposa makasi ya kolya.*   Kolula te bilei na ye ya elɛngi,Mpo ezali bilei ya bokosi.   Koboma nzoto te mpo na kozwa bomɛngo.+ Tiká kosala bongo, kasi monisá nde mayele.*   Ntango obwaki miso na yo kuna, ezali lisusu te,+Mpo ezwaka mpenza mapapu mpe epumbwaka na likoló lokola mpongo.+   Kolya te bilei ya moto oyo azali moimi;*Kolula te bilei na ye ya elɛngi.   Mpo azali lokola moto oyo azali kotánga bilei nyonso oyo ozali kolya. Azali koloba: “Lyá mpe mɛlá,” kasi yango te nde azali kokanisa.*   Okosanza mwa elokooyo olei,Mpe maloba na yo ya elɛngi ekokende mpamba.   Koloba te na matoi ya moto oyo azali zoba,+Mpo akotyola maloba na yo ya mayele.+ 10  Kopusa te bilembo ya ndelo ya kala,+Koyiba te elanga ya mwana oyo tata akufá. 11  Mpo Mosikoli na bangoazali makasi;Akosamba na yo mpo na bango.+ 12  Tyá motema na yo na disipliniMpe litoi na yo na malobaya boyebi. 13  Koboya te kopesa mwana disiplini.+ Soki obɛti ye fimbo, akokufa te. 14  Osengeli kobɛta ye fimbo,Mpo obikisa ye na Nkunda.* 15  Mwana na ngai,soki motema na yoekómi na bwanya,Motema na ngai ekosepela.+ 16  Nakozala na esengo na kati mpenza ya motema na ngai*Ntango mbɛbu na yo ekoloba makambo oyo ezali malamu. 17  Motema na yo elula basumuki te,+Kasi bangáká Yehova mokolo mobimba.+ 18  Bongo mikolo ekoya ekozala malamu mpo na yo+Mpe elikya na yo ekolongolama te. 19  Mwana na ngai, yoká mpe kómá na bwanya,Mpe kambá motema na yo na nzela ya malamu. 20  Kozala te kati ya bato oyo bamɛlaka vinyo mingi,+To kati ya bato oyo balyaka mosuni na lokoso.+ 21  Mpo balangwi-masanga mpe bato ya lokoso bakokóma babola,+Mpe kolalalala ekolatisa moto bilamba oyo epasuká. 22  Yoká tata na yo oyo abotaki yo,Mpe kotyola mama na yo te kaka mpo akómi mobange.+ 23  Sombá* solo mpe kotɛka yango ata moke te,+Ná bwanya ná disiplini mpe mayele.+ 24  Tata ya moto ya semboakozala mpenza na esengo;Moto nyonso oyo aboti mwana ya bwanya akosepela na ye. 25  Tata na yo ná mama na yo bakosepela,Mpe mwasi oyo abotaki yo akozala na esengo. 26  Mwana na ngai, pesá ngai motema na yo,Mpe miso na yo esepela na banzela na ngai.+ 27  Mpo mwasi ya ndumba azali libulu mozindo,Mpe mwasi ya pite* azali libulu ya mai oyo ezali nkaka.+ 28  Abatamaka mpo na kozela lokola moyibi;+Abakisaka motángo ya mibali oyo bazangi bosembo. 29  Banani bazalaka na mawa? Banani bayokaka nzoto malamu te? Banani baswanaka? Banani bamilelalelaka? Banani bazokaka kaka mpamba? Banani miso evimbaka?* 30  Baoyo balekisaka ntango mingi na komɛla vinyo;+Baoyo balukaka* vinyo oyo esangisami. 31  Kotala vinyo te ntango ezali komonana motane,Wana ezali kobimisa ngɛlingɛli na kɔpɔ, Mpe kokita malɛmbɛna mongongo. 32  Mpo na nsuka, eswakalokola nyoka,Mpe ebimisaka pwazɔlokola nyoka ya ngɛngɛ.* 33  Miso na yo ekomona bimonamona,Mpe motema na yo ekoloba makambo ya kilikili.+ 34  Mpe okozala lokola moto oyo alali na katikati ya mbu,Lokola moto oyo alali na nsɔngɛ ya likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa. 35  Okoloba: “Babɛti ngai, kasi nayoki mpasi te. Batuti ngai, kasi nayebi te. Nakolamuka ntango nini?+ Nazali na mposa ya vinyo mosusu.”*

Maloba na nse

To, “Omipekisa.”
To, “Molimo oyo etondi na mposa.”
To mbala mosusu, “Tiká kotyela mayele na yo moko motema.”
To, “moto nyonso oyo liso na ye ezali mabe.”
Lil., “kasi motema na ye ezali elongo na yo te.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Bangɛi na ngai ekozala na esengo.”
To, “Zwá.”
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Masese 2:16.
To, “miso ezalaka molilimolili.”
To, “Baoyo bayanganaka mpo na komeka.”
To, “etupa.”
To, “Nakoluka yango lisusu.”