Nzembo 34:1-22

  • Yehova abikisaka basaleli na ye

    • “Tótombola nkombo na ye elongo” (3)

    • Anzelu ya Yehova abatelaka (7)

    • “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu” (8)

    • ‘Ata mokuwa na ye moko te ebukanaki’ (20)

Loyembo ya Davidi, ntango oyo akosaki ete azali na ligboma+ liboso ya Abimeleke, bongo Abimeleke abenganaki ye, mpe akendaki. א [Alef] 34  Nakosanzola Yehova ntango nyonso;Lisanzoli na ye ekozala ntango nyonso na mbɛbu na ngai. ב [Bet]   Nakomikumisa* na Yehova;+Bato ya komikitisa bakoyoka mpe bakosepela. ג [Gimel]   Bókumisa Yehova elongo na ngai;+Mpe tótombola nkombo na ye elongo. ד [Dalet]   Natunaki Yehova, mpe ayanolaki ngai.+ Abikisaki ngai na makambo nyonso oyo ezalaki kobangisa ngai.+ ה [He]   Baoyo batalaki ye bakómaki na esengo;Bilongi na bango ekokaki koyoka nsɔni ata moke te. ז [Zayin]   Moto mpamba abelelaki, mpe Yehova ayokaki. Abikisaki ye na bampasi na ye nyonso.+ ח [Het]   Anzelu ya Yehova abatelaka baoyo babangaka Nzambe,+Mpe abikisaka bango.+ ט [Tet]   Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu;+Esengo na moto oyo azali kokima epai na ye. י [Yod]   Bóbanga Yehova, bino basantu na ye nyonso,Mpo baoyo babangaka ye bazangaka eloko te.+ כ [Kaf] 10  Ata bana-nkɔsi oyo bazali na makasi* bazangaka eloko mpe bayokaka nzala,Kasi baoyo balukaka Yehova, bakozanga te eloko ya malamu.+ ל [Lamed] 11  Bóya, bana na ngai, bóyoka ngai;Nakoteya bino kobanga Yehova.+ מ [Mem] 12  Nani kati na bino asepelaka na bomoiMpe akosepela kozala na bomoi molai mpe ya esengo?+ נ [Nun] 13  Na yango, batelá lolemo na yo eloba te makambo ya mabe,+Mbɛbu na yo eloba te makambo ya bokosi.+ ס [Samek] 14  Tiká oyo ezali mabe, mpe salá oyo ezali malamu;+Luká kimya, mpe landá yango.+ ע [Ayin] 15  Miso ya Yehova ezali epai ya bato ya sembo,+Mpe matoi na ye eyokaka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+ פ [Pe] 16  Kasi elongi ya Yehova etɛmɛlaka baoyo basalaka oyo ezali mabe,Bakokufa, mpe moto moko te akokanisa bango lisusu na mabele.+ צ [Tsade] 17  Bato ya sembo bagangaki, mpe Yehova ayokaki;+Abikisaki bango na bampasi na bango nyonso.+ ק [Kof] 18  Yehova azali pene na baoyo motema ebukani;+Abikisaka baoyo balɛmbi nzoto.*+ ר [Resh] 19  Bampasi ya moto ya sembo ezali mingi,+Kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.+ ש [Shin] 20  Azali kobatela mikuwana ye nyonso;Ata moko na yangoebukani te.+ ת [Taw] 21  Likama ekoboma moto mabe;Bato oyo bazali koyina moto ya sembo bakomema ngambo. 22  Yehova asikolaka bomoi* ya basaleli na ye;Moko te kati na baoyo bazali kokima epai na ye akomema ngambo.+

Maloba na nse

To, “Molimo na ngai ekomikumisa.”
To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
To, “elimo etutami.”
To, “molimo.”