Ndenge ekomamá na Yoane 12:1-50

  • Maria asopi mafuta na makolo ya Yesu (1-11)

  • Yesu akɔti na Yerusaleme lokola mokonzi (12-19)

  • Yesu alobeli liwa na ye (20-37)

  • Kozanga kondima ya Bayuda ekokisi esakweli (38-43)

  • Yesu ayaki kobikisa mokili (44-50)

12  Mikolo motoba liboso ya Elekeli, Yesu akómaki na Betani, epai Lazare+ oyo Yesu asekwisaki azalaki kofanda.  Bongo babongiselaki ye bilei ya mpokwa kuna, mpe Marta azalaki kotyela bango bilei na mesa,+ kasi Lazare azalaki moko ya baoyo bazalaki kolya* elongo na ye.  Na yango, Maria azwaki litra* moko ya mafuta ya nsolo kitoko, narda ya solosolo, ya ntalo mingi. Asopaki yango na makolo ya Yesu mpe apangwisaki ye makolo na nsuki na ye. Ndako etondaki na nsolo ya mafuta yango ya nsolo kitoko.+  Kasi Yudasi Mokeriota,+ moko ya bayekoli ya Yesu, oyo azalaki pene ya kotɛka ye, alobaki:  “Mpo na nini te mafuta yango ya nsolo kitoko etɛkamaki denari* 300 mpe mbongo yango epesama na babola?”  Nzokande soki alobaki bongo, ezalaki te mpo azalaki komitungisa mpo na babola, kasi nde mpo azalaki moyibi. Azalaki kosimba kɛsi ya mbongo mpe azalaki koyiba mbongo oyo ezalaki kotyama kuna.  Bongo Yesu alobaki: “Bótika ye kimya, mpo ete abatela momeseno wana mpo na mokolo ya kokundama na ngai.+  Mpo babola, bokozala na bango ntango nyonso,+ kasi ngai bokozala na ngai ntango nyonso te.”+  Na ntango yango, ebele mpenza ya Bayuda bayokaki ete Yesu azalaki kuna mpe bayaki, kaka mpo na ye te, kasi mpe mpo na komona Lazare, oyo ye asekwisaki.+ 10  Banganga-nzambe bakonzi basalaki sikoyo likita mpo na koboma mpe Lazare, 11  mpamba te ezalaki mpo na ye nde Bayuda mingi bazalaki kokende kuna mpe bazalaki kondimela Yesu.+ 12  Na mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na fɛti bayokaki ete Yesu azali koya na Yerusaleme. 13  Bongo bazwaki mandalala mpe babimaki mpo na kokutana na ye, mpe babandaki koganga: “Tobondeli yo, bikisá! Moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova,*+ Mokonzi ya Yisraele, apambwama!”+ 14  Ntango Yesu amonaki mwana ya mpunda moko, afandaki likoló na yango,+ kaka ndenge ekomamá ete: 15  “Kobanga te, mwana mwasi ya Siona. Talá! Mokonzi na yo azali koya, afandi likoló ya mwana ya mpunda.”+ 16  Na ntango wana, bayekoli na ye bakangaki ntina ya makambo yango te, kasi ntango Yesu azwaki nkembo+ nde bamikundolaki ete makambo yango ekomamaki mpo na ye, mpe ete basalaki makambo yango mpo na ye.+ 17  Nzokande, ebele ya bato oyo bazalaki elongo na ye ntango abengaki Lazare ete abima na lilita*+ mpe asekwisaki ye bakobaki kopesa litatoli.+ 18  Yango wana mpe ebele ya bato bayaki kokutana na ye, mpo bayokaki ete asalaki likamwisi wana. 19  Bongo Bafarisai balobanaki bango na bango: “Bomoni? Bozali kokoka kosala ata eloko moko te. Talá! Mokili mobimba elandi ye.”+ 20  Nzokande ezalaki na Bagrɛki mosusu na kati ya bato oyo bayaki mpo na kosambela na fɛti wana. 21  Bango bakendaki epai ya Filipe,+ oyo azalaki moto ya Betesaida ya Galile, mpe babandaki kosɛnga ye, balobi: “Tata, tolingi komona Yesu.” 22  Filipe ayaki koyebisa Andre. Andre ná Filipe bakendaki koyebisa Yesu. 23  Kasi Yesu azongiselaki bango: “Ngonga ekoki mpo Mwana ya moto azwa nkembo.+ 24  Ya solo mpenza nalobi na bino: Soki mbuma ya blé ekwei na mabele te mpe ekufi te, ekotikala kaka mbuma moko; kasi soki ekufi,+ nde ekobota mbuma mingi. 25  Moto oyo alingaka bomoi* na ye azali kobebisa yango, kasi moto oyo ayinaka bomoi*+ na ye na mokili oyo akobatela yango mpo na bomoi ya seko.+ 26  Soki moto alingi kosalela ngai, alanda ngai, mpe epai ngai nazali, mosaleli na ngai mpe akozala wana.+ Soki moto alingi kosalela ngai, Tata akokumisa ye. 27  Sikoyo nabulungani,*+ mpe naloba nini? Tata, bikisá ngai naleka ngonga oyo.+ Atako bongo, ezali mpo na yango nde nakómi na ngonga oyo. 28  Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Bongo mongongo moko+ eutaki na likoló ete: “Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.”+ 29  Ebele ya bato oyo batɛlɛmaki wana bayokaki yango mpe babandaki koloba ete nkake ebɛti. Basusu balobaki: “Anzelu moko alobi na ye.” 30  Yesu azongisaki: “Mongongo oyo ebimi mpo na ngai te, kasi mpo na bino. 31  Sikoyo kosambisama ya mokili oyo ezali kosalema; sikoyo mokonzi ya mokili oyo+ akobwakama libándá.+ 32  Kasi ngai, soki natombolami na mabele,+ nakobenda bato ya ndenge nyonso epai na ngai.” 33  Azalaki koloba bongo nde mpo na komonisa lolenge ya liwa oyo asengelaki kokufa.+ 34  Na yango, ebele ya bato bayanolaki ye: “Toyokaki na Mobeko ete Kristo akoumela libela na libela.+ Kasi ndenge nini ozali koloba ete Mwana ya moto asengeli kotombolama?+ Mwana ya moto yango nde nani?” 35  Bongo Yesu alobaki na bango: “Pole ekozala kati na bino mpo na mwa ntango moke lisusu. Bótambola ntango bozali naino na pole, mpo molili elonga bino te; moto oyo azali kotambola na kati ya molili ayebaka te epai azali kokende.+ 36  Wana bozali na pole, bómonisa kondima na kati ya pole yango, mpo ete bókóma bana ya pole.”+ Yesu alobaki makambo wana, na nsima akendaki komibomba mosika na bango. 37  Atako asalaki makamwisi* mingi na miso na bango, bandimelaki ye te, 38  mpo ete liloba ya mosakoli Yisaya ekokisama, oyo alobaki: “Yehova,* nani andimeli likambo oyo ayoki epai na biso?*+ Bongo lobɔkɔ ya Yehova,* emonisami epai ya nani?”+ 39  Ntina oyo bazalaki kokoka kondima te ezali ete, Yisaya alobaki lisusu boye: 40  “Abomi miso na bango mpe akómisi mitema na bango makasi, mpo ete bámona te na miso na bango mpe bákanga ntina te na mitema na bango mpe bázongela ngai te, mpo nabikisa bango.”+ 41  Yisaya alobaki makambo wana mpo amonaki nkembo na ye, mpe alobaki mpo na ye.+ 42  Nzokande, na kati ya bankumu, mingi na bango bandimelaki ye mpenza,+ kasi bazalaki kondima ye polele te mpo na Bafarisai, mpo bábengana bango te na sinagoga;+ 43  mpo balingaki nkembo ya bato koleka ata nkembo ya Nzambe.+ 44  Nzokande, Yesu abelelaki: “Moto oyo andimeli ngai, andimeli kaka ngai moko te, kasi mpe moto oyo atindaki ngai;+ 45  mpe moto oyo azali komona ngai azali mpe komona Moto oyo atindaki ngai.+ 46  Nayei lokola pole na mokili,+ mpo ete moto nyonso oyo azali kondimela ngai atikala na kati ya molili te.+ 47  Kasi soki moto azali koyoka maloba na ngai mpe azali kotosa yango te, ngai nakosambisa ye te; mpo nayaki kosambisa mokili te, kasi kobikisa mokili.+ 48  Moto oyo aboyi ngai mpe ayambi maloba na ngai te mosambisi na ye azali. Liloba oyo nalobi nde ekosambisa ye na mokolo ya nsuka. 49  Mpo nalobi na ndenge na ngai moko te, kasi Tata moto atindaki ngai apesi ngai mitindo mpo na makambo oyo nasengeli koloba mpe koteya.+ 50  Mpe nayebi ete mitindo na ye elakisi bomoi ya seko.+ Na yango, makambo oyo nazali koloba, nazali koloba yango ndenge kaka Tata ayebisaki ngai.”+

Maloba na nse

To, “batandamaki na mesa.”
Elingi koloba, litra moko ya Baroma, soki 327 g. Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. A5.
To, “lilita ya kokanisama.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
To, “molimo na ngai ebulungani.”
Lil., “bilembo.”
To, “na maloba na biso.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.