Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yesu asekwaki na nzoto ya elimo to ya mosuni?

Yesu asekwaki na nzoto ya elimo to ya mosuni?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobi ete Yesu “abomamaki na nzoto, kasi azongisamaki na bomoi [asekwisamaki] na elimo.”​—1 Petro 3:18; Misala 13:34; 1 Bakorinti 15:45; 2 Bakorinti 5:16.

 Maloba ya Yesu ye moko emonisaki ete akosekwa na nzoto ya mosuni mpe makila te. Alobaki ete akopesa “mosuni na [ye] mpo na bomoi ya mokili,” mpo na kosikola bato. (Yoane 6:51; Matai 20:28) Soki azongelaka nzoto na ye ya mosuni ntango asekwaki, elingaki kokweisa mbeka yango ya lisiko. Kasi, esalemaki bongo te mpo Biblia elobi ete apesaki nzoto mpe makila na ye “mbala moko mpo na libela.”—Baebre 9:11, 12.

Soki Yesu asekwaki na nzoto ya elimo, ndenge nini bayekoli na ye bamonaki ye?

  •  Bikelamu ya elimo bakoki kolata nzoto ya mosuni. Kutu, baanzelu oyo basalaki yango na ntango ya kala balyaki mpe bamɛlaki elongo na bato. (Ebandeli 18:1-8; 19:1-3) Atako bongo, bazalaki kaka bikelamu ya elimo mpe bakokaki kotika mabele mpe kozonga na likoló.​—Basambisi 13:15-21.

  •  Nsima ya lisekwa na ye, Yesu mpe alataki nzoto ya mosuni mpo na mwa ntango, ndenge baanzelu basalaki yango liboso. Kasi, lokola azalaki ekelamu ya elimo, akokaki kobimela bato mpe kolimwa na mbala moko. (Luka 24:31; Yoane 20:19, 26) Nzoto ya mosuni oyo azalaki kolata mpo na kobimela bato ezalaki ndenge moko te. Yango wana, ata baninga na ye mpenza bazalaki koyeba ye kaka na makambo oyo azalaki koloba mpe kosala.​—Luka 24:30, 31, 35; Yoane 20:14-16; 21:6, 7.

  •  Ntango Yesu abimelaki ntoma Toma, alataki nzoto oyo ezalaki na bilembo ya bampota. Asalaki yango mpo alendisa kondima ya Toma, oyo azalaki kotya ntembe ete Yesu asekwi.​—Yoane 20:24-29.