Lakisá makambo oyo ezali na kati

Koya ya Kristo elimboli nini?

Koya ya Kristo elimboli nini?

Eyano ya Biblia

 Na bisika mingi, Biblia elobeli koya ya Kristo mpo na kosambisa bato na mikolo ezali koya. a Na ndakisa, Matai 25:31-33 elobi:

 “Ntango Mwana ya moto [Yesu Kristo] akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.”

 Mokolo yango ya kosambisama ekozala eteni moko ya “bolɔzi moko monene” oyo esalemá naino te liboso. Bolɔzi yango ekosuka na etumba ya Armagedone. (Matai 24:21; Emoniseli 16:16) Banguna ya Kristo oyo balobelami lokola bantaba na ndakisa oyo apesaki, “bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.” (2 Batesaloniki 1:9; Emoniseli 19:11, 15) Kasi, basaleli na ye ya sembo, oyo bakokani na bampate, bakozwa “bomoi ya seko.”​—Matai 25:46.

Kristo akoya ntango nini?

 Yesu alobaki boye: “Kasi mpo na mokolo yango mpe ngonga yango moto moko ayebi te.” (Matai 24:36, 42; 25:13) Kasi, alobelaki “elembo” oyo ekomonisa eleko oyo ekomema na koya na ye.​—Matai 24:3, 7-14; Luka 21:10, 11.

Ntango Kristo akoya akomonana na miso ya bato?

 Yesu asekwaki na nzoto ya elimo, na yango, akoya lokola ekelamu ya elimo, kasi te na nzoto lokola oyo ya biso. (1 Bakorinti 15:45; 1 Petro 3:18) Yango wana liboso Yesu akufa, ayebisaki bantoma na ye boye: “Etikali moke mpe mokili ekomona ngai lisusu te.”​—Yoane 14:19.

Makanisi ya lokuta oyo bato mingi bazalaka na yango mpo na koya ya Kristo

 Lokuta: Ntango Biblia elobaka ete bato bakomona Yesu “azali koya na mapata ya likoló,” elingi koloba ete bato bakomona Yesu ntango akoya.​—Matai 24:30.

 Solo: Mbala mingi Biblia elobelaka mapata mpo na komonisa eloko oyo ekoki te komonana na miso. (Balevi 16:2; Mitángo 11:25; Kolimbola Mibeko 33:26) Na ndakisa, Nzambe alobaki na Moize boye: “Nazali koya epai na yo kati na lipata ya moindo.” (Kobima 19:9) Moize amonaki Nzambe boye te na miso. Ndenge moko mpe Kristo ‘akoya na mapata ya likoló’ na ndenge bato bakoyeba ete ayei atako bakomona ye boye te na miso.

 Lokuta: Maloba “liso nyonso ekomona ye,” oyo Emoniseli 1:7 esaleli ntango elobeli koya ya Kristo esengeli kozwa yango kaka ndenge ekomami.

 Solo: Maloba ya Grɛki oyo Biblia esaleli mpo na “liso” mpe “komona” esalelamaka na bantango mosusu mpo na kolobela koyeba to kososola na esika ya kolobela komona mpenza na miso. b (Matai 13:15; Luka 19:42; Baroma 15:21; Baefese 1:18) Biblia elobi ete Yesu oyo asekwaki azali “kaka ye moko nde . . . afandaka na pole oyo likoki ya kopusana penepene na yango ezali te, oyo moko te na kati ya bato . . . akoki komona.” (1 Timote 6:16) Na yango, “miso nyonso ekomona ye” na ndenge bato nyonso bakoyeba ete Yesu azali moto oyo Nzambe apesi mokumba ya kosambisa bato.​—Matai 24:30.

 Lokuta: Maloba oyo ezali na 2 Yoane 7 emonisi ete Yesu akoya na nzoto oyo bato bakomona na ye.

 Solo: Vɛrsɛ yango elobi boye: “Ebele ya bakosi babimi na kati ya mokili, bato oyo bazali kosakola te ete Yesu Kristo ayaki na nzoto ya mosuni.”

 Na ntango ya ntoma Yoane, bato mosusu bazalaki kowangana ete Yesu ayaki na mokili na nzoto lokola moto. Bazalaki kobenga bato yango Ba-Gnostique. 2 Yoane 7 ekomamaki mpo na koboya liteya wana ya lokuta.

a Atako bato mingi basalelaka maloba “Koya ya Mibale” mpo na kolobela koya ya Kristo, maloba yango ezali na Biblia te.

b Talá buku (The New Thayer’s Greek-English Lexicon of the New Testament (1981), nkasa 451 mpe 470).