Lakisá makambo oyo ezali na kati

Zabolo afandaka wapi?

Zabolo afandaka wapi?

Eyano ya Biblia

 Lokola Zabolo azali ekelamu ya elimo, afandaka na esika oyo emonanaka te. Kasi, esika yango ezali lifelo te epai anyokolaka bato ya mabe, ndenge emonisami na elilingi wana.

“Etumba ebimaki na likoló”

 Na boumeli ya ntango moko boye, Satana Zabolo azalaki kotambola ndenge alingi na esika oyo bikelamu ya elimo bafandaka, mpe azalaki kokɔta liboso ya Nzambe, ndenge moko na baanzelu ya sembo. (Yobo 1:6) Kasi Biblia esakolaki ete ‘etumba moko ekobima na likoló’ oyo na nsuka na yango bakobengana Satana na likoló mpe ‘akobwakama na mabele.’ (Emoniseli 12:7-9) Kolandana ya badati na Biblia mpe makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi ete etumba wana esilá kosalema. Zabolo abwakamá zingazinga ya mabele.

 Yango elingi nde koloba ete Zabolo afandaka na esika moko boye na mabele? Na ndakisa, Biblia elobi ete engumba Pergame ya kala ezalaki “esika kiti ya bokonzi ya Satana ezali” mpe “esika Satana afandi.” (Emoniseli 2:13) Na ntembe te, maloba wana emonisi kaka ete losambo ya Satana ezalaki mingi mpenza na engumba yango. Biblia elobi ete Zabolo azali koyangela “makonzi nyonso ya mabele esika bato bafandi”; na yango, afandaka te na esika moko boye na mabele, kasi azali nde zingazinga ya mabele.​—Luka 4:5, 6.