Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe nde akelaki Zabolo?

Nzambe nde akelaki Zabolo?

Eyano ya Biblia

 Biblia emonisi ete Nzambe akelaki Zabolo te. Elobi nde ete asalaki ekelamu oyo ekómá Zabolo. Mpo na Nzambe, Biblia elobi boye: “Mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.” (Kolimbola Mibeko 32:3-5) Maloba yango emonisi ete na ntango moko boye, Satana Zabolo azalaki ekelamu ya kokoka mpe ya sembo, elingi koloba, anzelu moko ya Nzambe.

 Na Yoane 8:44, Yesu alobaki ete Zabolo “akangamaki makasi te na solo,” mpo na komonisa ete na ntango moko boye, Satana azalaki sembo mpe mabɔkɔ mpɛmbɛ.

 Kasi, ndenge moko na bato mpe na baanzelu mosusu ya Nzambe, anzelu oyo akómá Satana azalaki na bonsomi ya kopona kati na mabe ná malamu. Lokola aponaki kotombokela Nzambe mpe atindaki mwasi ná mobali ya liboso básala lokola ye, amikómisaki Satana, oyo elimboli “Motɛmɛli.”​—Ebandeli 3:1-5; Emoniseli 12:9.