Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Bato oyo bakelelá

Bato oyo bakelelá

Nzambe akipaka bato oyo bakelelá?

“Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te . . . Mpo [Nzambe] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’”​—Baebre 13:5.

NDENGE OYO NZAMBE AKIPAKA BANGO

Ntango mosambeli ya Yehova Nzambe akutani na mikakatano, Nzambe akoki kosunga ye na ndenge ebele. Akoki kosunga ye na nzela ya bandeko na ye bakristo. * Yakobo 1:27 elobi boye: “Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike ná basi oyo mibali bakufá na bolɔzi na bango.”

Bakristo ya liboso bazalaki kosalisana. Na ndakisa, ntango basakolaki ete nzala makasi ekokɔta na mokili ya Yudea, bakristo ya engumba Antiokia na Siri, bazwaki ekateli ya “kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea lisungi.” (Misala 11:28-30) Yango esalaki ete bandeko na bango bakristo oyo bakelelaki bazwa biloko oyo esengeli. Lisungi yango emonisaki ete bolingo ya bakristo esukaka na maloba te.​—1 Yoane 3:18.

Moto oyo akelelá akoki kosala nini mpo akelelá mingi te?

“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko.”​—Yisaya 48:17, 18.

NZAMBE ASALISAKA BISO MPO NA LITOMBA NA BISO MOKO

Bamilio ya bato bamoni ete bwanya ya Biblia ezali na ntina mingi mpe esalisaka moto amitambwisa malamu. Masese 2:6, 7 elobi: “Yehova ye moko apesaka bwanya; boyebi ná bososoli eutaka na monɔkɔ na ye. Mpe akobomba malamu mpenza bwanya mpo na bato ya kolongobana.” Soki moto aluki mpe asaleli bwanya yango, akozwela yango matomba.

Akoboya momeseno mabe oyo esilisaka moto mbongo; na ndakisa, komɛla bangi to kolangwa masanga. (2 Bakorinti 7:1) Akokóma moto ya kolongobana mpe oyo asalaka mosala na ye malamu; bizaleli oyo ekoki kosalisa ye azwa mosala to patrɔ na ye asepela na ye mingi. Baefese 4:28 elobi: “Moyibi ayiba lisusu te, kasi asala nde mosala makasi, . . . mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.”

Nini emonisi ete batoli ya Biblia esalisaka baoyo bakelelá?

“Mayele ya Nzambe ezali komonana solo na misala na [yango].”​Matai 11:19, Biblia na lingala ya lelo oyo.

BANDAKISA OYO ENDIMISI LIKAMBO YANGO

Etikalaki moke Wilson, oyo afandaka na Ghana, asilisa mosala oyo azwaki mpo na mwa ntango. Na mokolo na ye ya nsuka, amonaki mbongo na motuka ya patrɔ na ye ntango azalaki kosukola yango. Mokonzi na ye mosusu ayebisaki ye azwa mbongo yango. Kasi, lokola Wilson azali Motatoli ya Yehova aboyaki koyiba. Kutu, azongisaki mbongo yango epai ya nkolo na yango. Na esika mosala na ye esila, bazwaki ye na mosala mpo na libela mpe na nsima bakómisaki ye mokonzi.

Géraldine oyo afandaka na Mpoto, balongolaki ye na mosala mpo mokonzi na ye azalaki kosepela na Batatoli ya Yehova te. Kasi, mama ya mokonzi yango ayebisaki ye ete asalaki libunga monene. Alobaki boye: “Soki ozali na mposa ya mosali oyo abongi kotyelama motema mpe oyo akozwa mosala na lisɛki te, zwá Motatoli ya Yehova.” Patrɔ yango alukaki koyeba mwa makambo etali Batatoli ya Yehova, mpe na nsima azongisaki Géraldine na mosala.

Ntango Sarah, mama moko ya Afrika ya sudi oyo abɔkɔlaka bana ye moko akómaki kokelela, amonaki mpenza bolingo ya bokristo ntango bandeko ya lisangá bapesaki libota na ye biloko oyo basengelaki na yango mpe transport. Na nsima, bana na ye balobaki, “tozali na baboti mingi na lisangá.”

Oyo ezali kaka mwa bandakisa, kasi bato mingi mpe bakutaná na makambo lokola oyo. Yango esalisi biso tokanisa lisusu maloba ya Masese 1:33 oyo elobaka: “Kasi moto oyo azali koyokela ngai [Yehova], akofanda na kimya.” Likambo yango ezali solo mpenza!

^ par. 5 Na bikólo mosusu, guvɛrnema ebimisaka mbongo mpo na kosunga bato oyo bakelelá. Na bikólo oyo basalaka bongo te, mokumba yango ezalaka libosoliboso ya bato ya libota ya moto yango.​—1 Timote 5:3, 4, 16.