Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Biblia ezali na ntina lelo oyo?

Biblia ezali na ntina lelo oyo?

‘Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nazwaki esengo.’

HILTON azalaki kolinga lisano ya makɔfi. Ntango azalaki na mbula 7, azalaki kobunda mingi; ezala na esika ya lisano yango to na libándá na yango! Ntango akɔtaki iniversite, azalaki kotambolatambola ná baninga na ye mpo na koluka moto oyo ye akobɛta. Alobi boye: “Nazalaki koyiba, kobɛta masano ya mbongo, kotala pornografi, kotungisa bana basi mpe kofinga baboti na ngai. Bizaleli na ngai ezalaki mabe mpenza, yango wana baboti na ngai bamonaki ete nakobonga lisusu te. Ntango nasilisaki iniversite, nalongwaki na ndako na biso.”

Nsima ya mbula 12, ntango Hilton azongaki na ndako na bango, baboti na ye bandimaki te ete ezali kaka ye! Akómaki kimya, azalaki lisusu mobulu te mpe azalaki na limemya. Nini esalaki ete abongwana ndenge wana? Ntango alongwaki epai na bango, akómaki kokanisa mpenza soki bomoi na ye ezalaki kokende wapi. Ayekolaki mpe Biblia mpo na komona soki ekosalisa ye abongwana. Hilton alobi boye: “Nazalaki kosalela makambo oyo nazalaki kotánga na Biblia; elingi koloba kolongola bomoto na ngai ya kala mpe kotosa mobeko oyo ezali na Baefese 6:2, 3 oyo esɛngi nakumisa baboti na ngai. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nazwaki esengo ya solosolo mpe nasepelisaki tata ná mama na ngai, mpasi na mitema na bango esilaki!”

Lisolo ya Hilton emonisi ete Biblia esilá ngala te mpe ezali na nguya ya kobongola moto. (Baebre 4:12) Tótalela naino mwa bizaleli oyo Biblia elobeli; na ndakisa bosembo, komipekisa, bosembo na libala mpe bolingo mpe ndenge bizaleli yango ekoki mpenza kobongisa bomoi ya bato.