Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKOLI

Makambo etali sante

Makambo etali sante

Atako mayele ya minganga ezali kobakisama, kasi bamaladi ezali kaka kokoba konyokola bato. Ata bongo, emonani ete likoki ya komibatela na bamaladi mingi ezali.

Mokili

OMS emonisi ete tii tókóma mobu 2035, mbula na mbula bato milio 24 bakobɛla maladi ya kanser. Lelo oyo bato koleka milio 14 babɛlaka maladi yango, boye motángo yango ekomata na (70%). Ndambo ya bato yango bakobɛla maladi yango mpo na makambo lokola kolangwa masanga, kozanga kosala mosala, kozala monene mingi, kolekisa ntango mingi na nse ya moi mpe komɛla makaya.

Grande-Bretagne

Nsima ya kolakisa makambo oyo endimisi ete maladi ya vache folle ezali, guvɛrnema ya Grande-Bretagne esɛngaki básala baankɛtɛ mpo na koyeba soki maladi yango oyo ezwaka bato, ekoki kopalangana na nzela ya kozongisa makila. Andrew Miller, moto ya parlema ya ekólo yango alobi boye: “Tomitungisaki makasi ntango toyokaki ete maladi wana oyo ezangá nkisi ezali likama monene mpo na sante ya bato. Bayebisaki biso ete mikrobe na yango ekoki kopalangana soki ekɔti na makila to na biteni ya nzoto oyo bato mosusu bapesaka minganga mpo na kotya yango na nzoto ya bato mosusu ya maladi.”

Norvège

Ankɛtɛ oyo esalemaki na boumeli ya mbula 11 epai ya bato soki 63 000 ya ekólo yango emonisi ete kotungisama na makanisi ekoki kosala ete motángo ya bato oyo babɛlaka maladi ya motema ekóma mingi (40%). Societé Européenne de cardiologie etángaki maloba ya moko ya bato oyo basalaki ankɛtɛ yango oyo alobaki ete kotungisama na makanisi esukaka kaka te na kobimisa ba-hormone oyo esalaka ete moto amitungisa, oyo ememaka moto na kobɛla maladi ya motema; kasi ebebisaka mpe likoki ya moto ya kolanda batoli oyo ekoki kobongisa sante na ye.

États-Unis

Bato ya siansi bazali kosala baankɛtɛ mpo na koyeba maladi oyo mwa biteni mpe putulu ya makaya oyo etikalaka na bandako, na bashambre ya otɛlɛ, na kati ya mituka ekoki kobimisa. Soki biteni to putulu ya makaya yango ezali kobakisama se kobakisama, mokemoke ekoki kokóma mpenza pwazɔ soki eumeli.