Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BIBLIA EZALI NA NTINA LELO OYO?

Bizaleli malamu oyo esilaka ngala te​—Bosembo

Bizaleli malamu oyo esilaka ngala te​—Bosembo

TOLI YA BIBLIA: “Nani akoyambama na hema na yo [Nzambe]? . . . Ye oyo azali kotambola na mbeba te mpe oyo azali kosala na boyengebene mpe azali koloba solo na motema na ye.”​Nzembo 15:1, 2.

MATOMBA: Bato mingi basepelaka na moto oyo azali sembo mpe alobaka solo. Kasi, ezali boni soki moto azwi libaku ya kozwa litomba moko na ndenge ya kozanga bosembo mpe ekoyebana te? Sikoyo ekómi nde likambo ya motema to bizaleli mpenza ya moto.

Raquel, oyo asalaka mosala ya kosomba biloko, alobi boye: “Bato mosusu oyo nasombaka biloko epai na bango balukaki kopesa ngai kanyaka. Bayebisaki ngai ete soki nasombi biloko epai na bango, bakokitisela ngai ntalo mpe mbongo oyo ekotikala ekokóma ya ngai na esika ezonga na kompanyi na biso. Nakanisaki toli ya Biblia oyo elobeli kozala sembo, yango wana naboyaki kanyaka. Patrɔ na ngai ayokaki likambo yango mpe akómaki kotyela ngai lisusu motema.”

Soki Raquel andimaka mbongo oyo balingaki kopesa ye, alingaki kokelela na mbongo te mpo na mwa ntango. Kasi elingaki kozala ndenge nini soki patrɔ na ye ayebaka likambo yango? Raquel alingaki kaka kozala na mosala wana? Alingaki kozwa mosala mosusu? Oyo eleki ntina mpo na Raquel ezalaki lisosoli mpe lokumu na ye. Masese 22:1 elobi boye: “Nkombo esengeli kolingama mingi koleka ebele ya bomɛngo; kondimama ezali malamu koleka ata palata ná wolo.”

Jessie amisalelaki nkombo malamu lokola moto oyo asalaka mosala na bosembo

Jessie azalaki mpe sembo mpe moto ya kotyela motema, yango wana amisalelaki nkombo malamu epai ya patrɔ na ye. Matomba nini azwaki? Akómaki kokamba misala ya kompanyi yango mpe bapesaki ye bonsomi na programɛ na ye ya mosala. Yango esalaki ete azala na ntango mingi ya kolekisa elongo na mwasi mpe bana na ye mpe na makambo ya losambo.

Ntango balukaka bato ya misala, bapatrɔ mosusu balukaka bato oyo bayebani mpo na bosembo na bango. Na ndakisa, mokambi ya kompanyi moko na Philippines akomelaki biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka yango mpo na kosɛnga Batatoli ya Yehova bákende kosala na kompanyi na ye. Alobaki boye: “Basalaka mosala makasi, na bosembo mpe bamipesaka mpenza na mosala.” Kasi, lokumu nyonso ekendaka nde epai ya Yehova Nzambe, oyo ateyaka biso ‘tóyina oyo ezali mabe’ mpe ‘tólinga oyo ezali malamu.’​—Amose 5:15.