Ebandeli 3:1-24

  • Ndenge lisumu ebandaki (1-13)

    • Lokuta ya liboso (4, 5)

  • Yehova asambisi batomboki (14-24)

    • Esakweli oyo elobeli libota ya mwasi (15)

    • Babengani Adama ná Eva na Edene (23, 24)

3  Sikoyo nyoka+ ezalaki ekɛngɛ koleka banyama nyonso ya zamba ya mokili oyo Yehova Nzambe asalaki. Na yango, alobaki na mwasi ete: “Nzambe alobaki na bino mpenza ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?”+  Bongo mwasi alobaki na nyoka ete: “Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga.+  Kasi mpo na mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga,+ Nzambe alobaki ete: ‘Bosengeli kolya yango te, bosengeli mpe kosimba yango te; soki bomeki bokokufa.’”  Bongo nyoka alobaki na mwasi ete: “Bokokufa soki moke te.+  Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya mbuma ya nzete yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokóma lokola Nzambe: bokoyeba malamu ná mabe.”+  Na yango, mwasi amonaki ete mbuma ya nzete yango ezalaki malamu mpo na kolya mpe ezalaki kosepelisa miso, ɛɛ, nzete yango ezalaki kitoko na kotala. Bongo abukaki mbuma na yango mpe alyaki.+ Na nsima apesaki mpe mobali na ye ntango azalaki elongo na ye mpe ye alyaki.+  Bongo miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazalaki bolumbu. Na yango, batongaki nkasa ya figi mpe bamisalelaki biloko ya kozipa loketo.+  Na nsima bayokaki mongongo ya Yehova Nzambe wana azalaki kotambola na elanga na ntango oyo mwa mopɛpɛ kitoko epɛpaka na mokolo, mpe mobali ná mwasi na ye bakendaki komibomba na katikati ya banzete ya elanga mpo Yehova Nzambe amona bango te.  Mpe Yehova Nzambe azalaki kobenga mobali mpe koloba na ye ete: “Ozali wapi?” 10  Nsukansuka alobaki ete: “Nayokaki mongongo na yo na elanga, kasi nabangaki mpo nazalaki bolumbu, yango wana namibombaki.” 11  Na yango Nzambe alobaki ete: “Nani ayebisaki yo ete ozali bolumbu?+ Olei nde mbuma ya nzete oyo napesaki yo mobeko ete olya yango te?”+ 12  Mobali alobaki ete: “Mwasi oyo opesaki ngai, apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalyaki.” 13  Na nsima, Yehova Nzambe alobaki na mwasi ete: “Likambo nini osali?” Mwasi ayanolaki ete: “Nyoka akosaki ngai, yango wana nalyaki.”+ 14  Na nsima, Yehova Nzambe alobaki na nyoka+ ete: “Lokola osali bongo, olakelami mabe na kati ya banyama nyonso ya mboka mpe na kati ya banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu na yo, mpe okolya putulu mikolo nyonso ya bomoi na yo. 15  Mpe nakotya bonguna*+ kati na yo+ ná mwasi+ mpe kati na bana*+ na yo ná mwana*+ na ye. Ye akopanza motó+ na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.”+ 16  Alobaki na mwasi ete: “Nakobakisa mpenza mpasi ya zemi na yo; okobota bana na mpasi, mpe okozala na mposa makasi ya mobali na yo, mpe ye akokonza yo.” 17  Mpe alobaki na Adama* ete: “Lokola oyoki mongongo ya mwasi na yo mpe olei mbuma ya nzete oyo napesaki yo mobeko+ oyo ete: ‘Osengeli kolya mbuma na yango te,’ mabele elakelami mabe mpo na yo.+ Mikolo nyonso ya bomoi+ na yo okolya na mpasi biloko oyo mabele ekobota. 18  Ekobimisela yo banzubɛ mpe matiti ya nsendensende, mpe okolya milona ya mokili. 19  Na motoki ya elongi na yo okolya limpa* tii okozonga na mabele, mpo outaki kuna.+ Mpo ozali putulu mpe okozonga na putulu.”+ 20  Nsima na yango, Adama apesaki mwasi na ye nkombo Eva,* mpo asengelaki kokóma mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.+ 21  Mpe Yehova Nzambe asalelaki Adama ná mwasi na ye bilamba milai ya mposo ya nyama mpo bálata.+ 22  Na nsima, Yehova Nzambe alobaki ete: “Awa moto akómi lokola moko na biso na ndenge ayebi malamu ná mabe.+ Sikoyo, mpo asembola lobɔkɔ na ye te mpe azwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi+ mpe alya yango mpe azala na bomoi libela na libela,*—” 23  Bongo Yehova Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edene,+ mpo akende kosala bilanga na mabele esika azwamaki.+ 24  Na yango, Nzambe abenganaki moto mpe atyaki bakeruba*+ na ɛsti ya elanga ya Edene mpe mopanga, oyo mɔtɔ ezalaki kopela na ebende na yango, ezalaki kaka kobalukabaluka mpo na kokɛngɛla nzela ya nzete ya bomoi.

Maloba na nse

To, “bana; libota.” Lil., “momboto.”
To, “mwana.” Lil., “momboto.”
To, “koyinana.”
Elimboli, “mobali; moto.”
To, “bilei.”
Elimboli “moto ya bomoi.”
To, “mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”