Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Kosala makambo oyo ekotinda moto akanisa ete olingaka ye ezali mabe te?

Kosala makambo oyo ekotinda moto akanisa ete olingaka ye ezali mabe te?

 Makambo yango ezali nini?

 Bato mosusu bakanisi ete ezali soki moto azali komonisa na maloba to misala ete azali na mposa bálingana na mwana mwasi to mwana mobali moko boye. Ezali mabe komonisa moto moko ete ozali na mposa bólingana? Mpenza te. Elenge mwasi moko na nkombo Ann, alobi boye: “Soki okoki na libala mpe ozali kosepela na moto moko, ezali na ndenge nini mosusu te okoki kosala mpo oyeba soki ye mpe azali kosepela na yo.”

 Kasi na lisolo oyo, tokolobela nde ntango moto azali kosala makambo oyo ezali kotinda moto mosusu akanisa ete alingaka ye kasi ye azali na mposa te bálingana.

 “Kotyela moto moko likebi mpenza mpo ozali na mposa bólingana na ye, ekeseni na kotinda moto akanisa ete olingaka ye mpe na nsima obenda nzoto na mbalakaka mpo ozalaki na mposa te bólingana mpenza na ye.”​—Deanna.

 Mpo na nini bato mosusu basalaka bongo?

 Bato mosusu basalaka bongo mpo bámipesa mwa valɛrɛ. Elenge mwasi moko na nkombo Hailey, alobi boye: “Soki omoni ete okómi kobenda likebi ya moto, okoki kolinga ete ebakisama lisusu.”

 Kasi soki ozali kosala na nko makambo oyo ekomonisa ete ozali na mposa bólingana na moto nzokande ezali bongo te, ekomonisa ete ozali kosakana na motema na ye. Yango ekotinda bato bámituna soki ozali na bososoli. Biblia elobi: “Bozoba ezali esengo mpo na ye oyo azali na motema te.”​—Masese 15:21.

 Yango wana Haile abakisi boye, “Kosala makambo oyo ekotinda moto akanisa ete olingaka ye ekoki kobanda lokola lisano, kasi mbala mingi esukaka mabe.”

 Wapi makama na yango?

  •   Ebebisaka lokumu ya moto.

     Soki moto azali kosala bongo, emonisaka ete ayebi te nini azali kosala mpe akoli naino te. Okomona ete azali sembo te kasi azali kaka na mposa ya kozwa mwa litomba moko epai na yo.”​—Jeremy.

     Biblia elobi: “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.”​—1 Bakorinti 13:4, 5.

     Kanisá naino: Maloba to misala ya ndenge nini ekoki kotinda bato báloba ete ozalaka bongo?

  •   Esalaka moto oyo basali ye bongo mpasi na motema.

     “Soki nakutani na moto moko oyo asalaka bongo, etindaka ngai naboya kozala pene na ye. Namonaka ete azali kosolola na ngai kaka mpo nazali mwana mwasi. Moto oyo asalaka makambo oyo etindaka basusu bákanisa ete alingi bango bakipaka mpenza bato te; bakipaka nde bolamu na bango moko.”​—Jaqueline.

     Biblia elobi: “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.”​—1 Bakorinti 10:24.

     Kanisá naino: Ekómelá yo naino te okanisa ete moto moko azali na mposa bólingana bongo na nsima oyei komona ete omikosaki? Soki bongo, oyokaki ndenge nini na nsima? Okoki kosala nini mpo yo osala moto mosusu bongo te?

  •   Ekangelaka moto nzela ya kozwa bolingo ya solosolo.

     “Moto oyo asalaka bongo azali moto ya kobala te to ya kolaka libala. Mpo na nini naluka koyeba to kotyela moto moko motema soki asalaka makambo lokola na teatre?”​—Olivia.

     Na Biblia, Davidi alobaki boye: “Nakɔtaka te esika moko na baoyo bazali kobomba ndenge bazali.”​—Nzembo 26:4.

     Kanisá naino: Moto oyo asalaka bongo asepelisaka bato ya ndenge nini? Okolinga moto ya ndenge wana abenda likebi na yo?