Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi​—Eteni 1: Ndenge ya komibatela?

Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi​—Eteni 1: Ndenge ya komibatela?

 Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi elimboli nini?

 Ndenge oyo bato ya mibeko balimbolaka maloba yango ekeseni na kolanda mboka na mboka; kasi maloba “koluka kosangisa na moto nzoto na makasi” ekoki kolimbola kosimbasimba to kosala makambo ya mbindo na nzoto ya moto oyo alingi makambo yango te, ntango mosusu na ndenge ya makasi. Ekoki kozala kobebisa bana to bilenge na makambo ya mbindo, kosangisa nzoto na ndeko ya libota, kosangisa nzoto na moto na makasi, to mpe makambo ya mbindo oyo euti epai ya moto oyo otyelaka motema, na ndakisa monganga, molakisi to mokonzi moko ya lingomba. Nsima ya koluka kosangisa na basusu nzoto na makasi, ezala na maloba to na kosimba na nzoto, bato mosusu babangisaka bango mpo báyebisa yango bato mosusu te.

 Ankɛtɛ moko emonisi ete mbula na mbula na États-Unis, bato pene na 240 000 bayebisaka ete balukaki kosangisa na bango nzoto na makasi. Mingi na bango bazali na mbula 12 tii 18.

 Oyo osengeli koyeba

  •   Biblia epekisi koluka kosangisa na moto nzoto na makasi. Biblia elobeli bato oyo bayaki elulu mpo na kosangisa nzoto na makasi na mibali mibale oyo bayaki na engumba Sodoma eleki sikoyo mbula soki 4 000; Yehova abebisaki engumba yango mpo na likambo yango. (Ebandeli 19:4-13) Longola yango, Mibeko oyo Nzambe apesaki Moize eleki sikoyo mbula soki 3 500 epekisaki kosangisa nzoto na ndeko ya libota to koluka kosangisa na ye nzoto na makasi.​—Balevi 18:6.

  •   Mbala mingi ezalaka bato oyo toyebi. Buku moko (Talking Sex With Your Kids) elobi ete “kati na bana basi misato oyo basangisaki na bango nzoto na makasi, mibale bayebaka bato yango. Ezalaka bapaya te.”

  •   Ekómelaka ná bana basi ná bana mibali. Na États-Unis, mibali mosusu (10%) bakutanaka mpe na likambo yango.

  •   Tosengeli kokamwa te ndenge likambo yango ekómi mingi. Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka” bato mingi bakozala bato oyo “balinganaka te na kati ya libota,” “bato ya nko,” mpe “bazangi komipekisa.” (2 Timote 3:1-3) Bato oyo balukaka kobebisa basusu na makambo ya mbindo bamonisaka mpenza bizaleli yango.

  •   Ezali foti na yo te. Ata moto moko te abongi básangisa na ye nzoto na makasi. Foti ezalaka nde ya moto oyo asali likambo yango. Kasi, ezali na makambo oyo okoki kosala mpo na kokima likambo yango.

 Oyo okoki kosala

  •   Mibongisá. Osengeli koyeba liboso likambo oyo okosala soki moto moko, ezala fianse to ndeko na yo, azali kosɛnga yo bósimbana na nzoto. Ndenge nini komibongisa mpo na likambo nyonso ya ndenge wana? Elenge mwasi moko na nkombo Erin alobi ete osengeli kokanisa likambo nyonso oyo ekoki kosalema mpe ndenge oyo okosala mpo na komibatela. Alobi: “Ekoki komonana lokola ekosimba te, kasi soki okutani mpenza na likambo yango, ekozala mpasi bálonga yo.”

     Biblia elobi: “Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, . . . mpo mikolo ezali mabe.”​—Baefese 5:15, 16.

     Omituna boye: ‘Nakosala nini soki moto moko asimbi ngai na nzoto na ndenge ya mabe?’

  •   Bongisá ndenge okokima. Site Internet RAINN elobi ete osengeli “koyokana na baninga to bato ya libota na yo likambo oyo okoloba soki omoni ete makambo ebandi kobeba, okobenga bango mpe okoyebisa bango kozanga ete moto oyo ozali na ye ayeba. Bakoki koya kozwa yo to koluka mayele mosusu mpo na kosalisa yo olongwa wana.” Okomibatela mpenza soki oboyi kokende na bisika oyo ekotya yo na likama.

     Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”​—Masese 22:3.

     Omituna boye: ‘Likambo nini oyo nabongisi ekosalisa ngai nakima?’

    Kobosana te kobongisa ndenge ya kokima

  •   Mityelá ndelo, mpe koleka yango te. Na ndakisa soki ozali na fianse, bósolola mpo bólobela makambo oyo ebongi te ete bósala. Soki azali komona ete komityela bandelo ezali na ntina te, luká fianse mosusu, oyo akotosa mposa na yo.

     Biblia elobi: “Bolingo . . . esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te.”​—1 Bakorinti 13:4, 5.

     Omituna boye: ‘Makanisi nini nakangamá na yango? Makambo nini namonaka ete ezali makambo ya nsɔni?’