Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini nasengeli kobondela?

Mpo na nini nasengeli kobondela?

 Ankɛtɛ moko elobi ete bilenge mingi ya Amerika (80%) babondelaka, kasi kaka ndambo na bango oyo babondelaka nde basalaka yango mikolo nyonso. Yango wana, bamosusu kati na bango bamitunaka boye: ‘Nabondelaka kaka mpo namiyoka malamu to ezali na likambo mosusu?’

 Libondeli ezali nini?

 Libondeli ezali lisolo elongo na Mokeli ya biloko nyonso. Kanisá naino oyo yango elingi koloba! Yehova aleki bato na makambo nyonso, ata bongo “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Kutu Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8.

 Ndenge nini nakoki kopusana penepene na Nzambe?

  •   Moko na yango ezali na nzela ya libondeli​—yango nde ndenge oyo osololaka na Nzambe.

  •   Mosusu na yango ezali na nzela ya koyekola Biblia​—yango nde ndenge oyo Nzambe “alobaka” na yo.

 Koloba mpe koyoka Nzambe na nzela ya libondeli mpe koyekola Biblia ekosalisa yo okóma moninga ya Nzambe ya motema.

 “Koloba na Yehova; elingi koloba kosolola elongo na ye Oyo-Aleki-Likoló, ezali moko ya libaku monene oyo bato bazali na yango.”​—Jeremy.

 “Koyebisa Yehova makambo oyo ezali mpenza na kati ya motema na ngai na libondeli esalaka ete namiyoka pene na ye.”​—Miranda.

 Nzambe ayokaka yango?

 Ata soki ondimaka Nzambe mpe obondelaka ye, ekoki kozala mpasi ondima ete ayokaka mpenza mabondeli. Kasi Biblia ebengi Yehova “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Elobi na yo kutu ‘obwakela ye mitungisi na yo.’ Mpo na nini? ‘Mpo atyelaka yo likebi.’​—1 Petro 5:7.

 Kanisá naino: Ozwaka ntango ya kosolola mbala na mbala na baninga na yo ya motema? Okoki mpe kosala bongo mpo na Nzambe. Sololáká na ye mbala na mbala na libondeli mpe saleláká nkombo na ye, Yehova. (Nzembo 86:5-7; 88:9) Kutu, Biblia esɛngi yo ‘obondelaka ntango nyonso.’​—1 Batesaloniki 5:17.

 “Libondeli ezali lisolo ya ngai ná Tata na ngai ya likoló, esika nafungolelaka ye motema na ngai mobimba.”​—Moises.

 “Nayebisaka Yehova makambo na mozindo, kaka ndenge nakoki koyebisa mama na ngai to moninga na ngai ya motema.”​—Karen.

 Nakoki kobondela mpo na makambo nini?

 Biblia elobi: “Na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.”​—Bafilipi 4:6.

 Yango elingi koloba ete obondelaka mpo na makambo na yo? Ɛɛ! Kutu, Biblia elobi: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, Mpe ye moko akosunga yo.”​—Nzembo 55:22.

 Toboyi te, ntango ozali kobondela Nzambe, osengeli kosuka kaka te na kolobela makambo na yo. Elenge mwasi moko na nkombo Chantelle, alobi boye: “Ekozala boninga ya malamu te soki nasɛngaka kaka Yehova asalisa ngai. Namonaka ete kopesa mersi esengeli kozala na esika ya liboso mpe liste ya makambo oyo nasengeli komonisa botɔndi mpo na yango esengeli kozala molai.”

 Kanisá naino: Makambo nini ya bomoi na yo ozali na botɔndi mpo na yango? Okoki kokanisa makambo misato ya kopesa Yehova mersi mpo na mokolo ya lelo?

 “Ata na likambo moke lokola kosepela na fololo moko kitoko ekoki kotinda biso tóbondela Yehova mpo na kopesa ye mersi.”​—Anita.

 “Kanisá na mozindo na eloko moko oyo ekamwisaka yo na biloko Nzambe akelá to na vɛrsɛ moko ya Biblia oyo esimbaka mpenza motema na yo mpe pesá Yehova mersi mpo na yango.”​—Brian.