Lakisá makambo oyo ezali na kati

‘Kokumisa tata na yo mpe mama na yo’ elimboli nini’?

‘Kokumisa tata na yo mpe mama na yo’ elimboli nini’?

Eyano ya Biblia

 Mobeko oyo elobi “kumisá tata na yo mpe mama na yo” ezali na bisika mingi na Biblia. (Kobima 20:12; Kolimbola Mibeko 5:16; Matai 15:4; Baefese 6:2, 3) Esɛngi kosala makambo minei ya ntina.

  1.   Kozwa bango na valɛrɛ. Okokumisa tata na yo mpe mama na yo soki ozali na botɔndi mpo na nyonso oyo basalá mpo na yo. Okoki kopesa bango valɛrɛ soki ozali kolanda litambwisi na bango. (Masese 7:1, 2; 23:26) Biblia elendisi yo otalelaka baboti na yo lokola “kitoko” na yo; elingi koloba, kosepela na bango.​—Masese 17:6.

  2.   Kondima bokonzi na bango. Mingimingi ntango ozali elenge, okokumisa tata na yo mpe mama na yo soki ondimi bokonzi oyo Nzambe apesá bango. Bakolose 3:20 elobi na bilenge boye: “Bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo yango ezali malamu mingi na kati ya Nkolo.” Ata Yesu na bolenge na ye atosaki baboti na ye.​—Luka 2:51.

  3.   Kosalela bango makambo na limemya. (Balevi 19:3; Baebre 12:9) Mbala mingi yango etalelaka makambo oyo olobaka na bango mpe ndenge ya koloba yango. Toboyi te, baboti mosusu basalaka makambo oyo esalaka ete ezala mpasi komemya bango. Ata bongo, bana bakoki kokumisa baboti na bango soki bazali koboya koloba na bango maloba mabe mpe koboya kosala makambo oyo ezangi limemya. (Masese 30:17) Biblia elobi ete kolobela tata to mama mabe ezali lisumu monene.​—Matai 15:4.

  4.   Kosalisa bango. Ntango baboti bakómi mibange, bazalaka na mposa ya lisungi oyo ebongi. Okoki kopesa bango lokumu soki osali nyonso oyo okoki mpo bázanga te oyo basengeli na yango. (1 Timote 5:4, 8) Na ndakisa, mwa moke liboso akufa, Yesu azwaki ebongiseli mpo na kobatela mama na ye.​—Yoane 19:25-27.

Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango na ntina etali kokumisa baboti

 Libunga: Mpo na kokumisa tata mpe mama na yo osengeli kotika bango batambwisa libala na yo.

 Solo: Biblia eteyaka ete boyokani na libala ezwi esika ya liboso, ya libota na nsima. Ebandeli 2:24 elobi: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye.” Toboyi te, mwasi ná mobali oyo babalani bakoki kozwa matomba na batoli ya babokilo na bango. (Masese 23:22) Kasi, mwasi ná mobali bakoki komona malamu ete komikɔtisa ya bandeko na bango na makambo ya libala na bango ezala na ndelo.​—Matai 19:6.

 Libunga: Tata mpe mama na yo bazali na bokonzi nyonso.

 Solo: Atako Nzambe apesá baboti bokonzi na libota, bokonzi nyonso ya moto ezali na ndelo; ezali na nse ya bokonzi ya Nzambe. Na ndakisa, ntango tribinale esɛngaki bayekoli ya Yesu bátosa Nzambe te, balobaki boye: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:27-29) Ndenge moko mpe, bana batosaka baboti na bango “na boyokani na Nkolo,” elingi koloba, na makambo nyonso oyo ebuki mibeko ya Nzambe te.​—Baefese 6:1.

 Libunga: Kokumisa tata mpe mama na yo esɛngi olanda makambo ya lingomba na bango.

 Solo: Biblia elendisi biso tómekaka maloba oyo bateyi biso mpo tómona soki ezali solo. (Misala 17:11; 1 Yoane 4:1) Moto oyo azali kosala bongo nsukansuka akoki kopona lingomba oyo ekeseni na oyo ya baboti na ye. Biblia elobeli basaleli mosusu ya Nzambe oyo balandaki te lingomba ya baboti na bango, na ndakisa Abrahama, Ruta mpe ntoma Paulo.​—Yosua 24:2, 14, 15; Ruta 1:15, 16; Bagalatia 1:14-16, 22-24.

 Libunga: Mpo okumisa tata mpe mama na yo osengeli kosangana na milulu ya kosambela bankɔkɔ.

 Solo: Biblia elobi: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Luka 4:8) Moto oyo asambelaka bankɔkɔ asepelisaka Nzambe te. Lisusu, Biblia eteyaka ete “bakufi bayebi ata eloko moko te.” Bayebaka te lokumu nyonso oyo bapesaka bango; bakoki mpe te kosalisa to kosala bato ya bomoi mabe.​—Mosakoli 9:5, 10; Yisaya 8:19.