Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 1

Lisolo ya Ezipito na Biblia

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 1

Biblia ekomamaki na boumeli ya mbula soki 1 600. Makambo oyo yango elobeli mpe bisakweli na yango etali bikólo nsambo oyo elekaki na nguya na mokili: Ezipito, Asiri, Babilone, Bamede ná Baperse, Grɛsi, Roma, mpe Angleterre ná États-Unis. Kotalela lisolo ya Ezipito ekosalisa biso tómona ete Biblia ebongi kotyelama motema mpe ekomamaki na litambwisi ya Nzambe mpe ete nsango na yango epesaka elikya​—elikya ya komona nsuka ya mpasi oyo boyangeli mabe ya bato ebimisá.

EZIPITO, oyo ekendá nsango mpo na ba pyramide na yango mpe Ebale Nile, ezalaki ekólo ya liboso oyo elekaki nguya na mokili mobimba, oyo Biblia elobeli. Ekólo ya Yisraele ebotamaki na nse ya elili ya Ezipito. Moize, oyo akomaki mikanda mitano ya liboso, abotamaki mpe atángaki na Ezipito. Mikanda ya mokili mpe biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolá endimisi makambo oyo Moize akomaki mpo na ekólo wana ya kala? Tótala mwa bandakisa.

Lisolo oyo ebongi kotyela motema

Batitre mpe bankombo.

Mbala mingi, lisolo ya solo elobelaka makambo nyonso na bosikisiki​—bonkɔkɔ, mimeseno, bankombo mpe batitre ya bakonzi, mpe bongo na bongo. Na likambo yango, tokoloba nini mpo na mokanda ya Ebandeli mpe mokanda ya Kobima, mikanda mibale ya liboso ya Biblia? Na mokanda na ye (New Light on Hebrew Origins), Garrow Duncan alobi mpo na ndenge mokanda ya Ebandeli elobeli lisolo ya Yozefe, mwana ya Yakobo mpe mpo na mokanda ya Kobima boye: “[Mokomi ya Biblia] ayebaki malamu mpenza monɔkɔ ya Baezipito, bonkɔkɔ, bindimeli, ndenge bomoi ezalaki na ndako ya mokonzi, mimeseno mpe bakonzi ya guvɛrnema ya Ezipito.” Abakisi boye: “[Mokomi] asaleli batitre ya sikisiki oyo bazalaki kosalela mpe kaka na ndenge oyo bazalaki kosalela yango na eleko oyo alobeli. . . . Kutu, eloko mpenza oyo endimisi ete bakomi ya Testama ya kala bayebaki malamu makambo ya Ezipito mpe ete babongi kotyelama motema, ezali ndenge oyo basalelaki liloba Farao na bileko ndenge na ndenge.” Duncan alobi mpe ete: “Ntango [mokomi] alobi ete bato bayei liboso ya Farao, alobeli bango bazali kolanda mimeseno ya sikisiki oyo ezalaki na ndako ya mokonzi mpe bazali kosalela mpenza elobeli ya ntango wana.”

Tii lelo na Ezipito, basalelaka babriki basangisá na matiti mpe bakausá na moi

Kosala babriki.

Ntango bazalaki na boombo na Ezipito, Bayisraele basalaki babriki na mabele ya lima oyo basangisá na matiti ya kokauka; matiti nde ezalaki kokangisa babriki yango. (Kobima 1:14; 5:6-18) * Eleki mwa bambula, buku moko (Ancient Egyptian Materials and Industries) elobaki boye: “Ezali na esika mosusu te oyo bazalaki [kosala babriki] koleka na Ezipito, epai babriki oyo bakausá na moi esalemaka tii lelo, ndenge bazalaki kosala kala mpo na kotonga bandako.” Buku yango elobeli mpe “ndenge Baezipito bazalaki kosalela matiti ekauká mpo na kosala babriki,” likambo oyo eyokani na oyo Biblia elobi.

Biloko mosusu ya Moezipito mpo na kokata mandɛfu​—razware ná talatala

Kokata mandɛfu.

Baebre ya kala bazalaki kotika mandɛfu. Kasi, Biblia elobi ete Yozefe akataki mandɛfu liboso akɔta epai ya Farao. (Ebandeli 41:14) Mpo na nini akataki mandɛfu? Mpo na kolanda momeseno ya Baezipito, oyo bazalaki komona ete mandɛfu ezali mbindo. Buku moko (Everyday Life in Ancient Egypt) elobi boye: “[Baezipito] bazalaki komikumisa ndenge bazalaki kokata mandɛfu nyonso.” Kutu na kati ya malita, bamonaki biloko mingi ya kobongisa nzoto, na ndakisa razware, bapɛngɛlɛ mpo na kolongola makiki, batalatala ná biloko ya kobomba yango. Emonani mpenza ete Moize azalaki mokomi ya makambo ya kala oyo alobelaki ata makambo mikemike. Tokoki mpe koloba bongo mpo na bakomi mosusu ya Biblia oyo balobelaki makambo ya Ezipito ya kala.

Mombongo.

Yirimia, oyo akomaki mokanda ya liboso mpe ya mibale ya Bakonzi, alobelaki makambo ya sikisiki oyo etali mombongo ya bampunda mpe ya makalo oyo Mokonzi Salomo azalaki kosala ná Baezipito mpe Bahiti. Biblia elobi ete likalo moko ezalaki na ntalo “ya shekele ya palata nkama motoba (600), mpe mpunda moko na ntalo ya nkama moko na ntuku mitano (150),” to ntalo ya likalo kabolá na minei.​—1 Bakonzi 10:29.

Buku moko (Archaeology and the Religion of Israel) elobi ete Hérodote, Mogrɛki mpe mokomi ya masolo ya kala, ná biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki endimisi ete mombongo monene ya bampunda mpe ya makalo ezalaki kosalema na boyangeli ya Salomo. Kutu, buku yango elobi ete “bazalaki kopesa mpunda minei . . . mpo na kozwa likalo moko ya Ezipito”; mpe yango eyokani na bantalo oyo Biblia elobi.

Bitumba.

Yirimia ná Ezera balobeli mpe ntango Farao Shishake abundisaki Yuda, mpe balobi polele ete ezalaki “na mbula ya mitano ya Mokonzi [ya Yuda] Rehoboame,” to na 993 L.T.B. (1 Bakonzi 14:25-28; 2 Ntango 12:1-12) Na boumeli ya ntango moko molai, lisolo ya etumba wana ezalaki na bisika mosusu te kaka na Biblia. Na nsima, bayaki komona mayemi na yango na efelo ya tempelo moko ya Ezipito na Karnak (Thèbes ya kala).

Mayemi yango emonisi Shishake atɛlɛmi liboso ya nzambe Amôn mpe atomboli lobɔkɔ mpo na kobɛta bakangami. Na mayemi yango, ezali mpe na bankombo ya bingumba ya Yisraele oyo balongaki; mingi kati na yango ekokani na bisika oyo Biblia elobeli. Elobeli mpe “Elanga ya Abrama”​—mbala ya liboso oyo mikanda ya kala ya Baezipito elobeli Abrahama, moto oyo Biblia mpe elobeli.​—Ebandeli 25:7-10.

Ezali polele ete bakomi ya Biblia bakomaki makambo ya lokuta te. Lokola bayebaki ete bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe, bakomaki makambo ya solo, ata soki ezalaki mpo na lokumu na bango te, na ndakisa ndenge Shishake alongaki Yuda. Bosembo ya ndenge wana ekeseni mpenza na masolo oyo bapakolá mafuta, ya kolekisa ndelo, ya bakomi ya Ezipito ya kala oyo bazalaki koboya kokoma likambo nyonso oyo ekokaki kokitisa lokumu ya bakonzi na bango.

Bisakweli oyo okoki kotyela motema

Kaka Yehova Nzambe, Mobandisi ya Biblia, nde akoki kosakola makambo oyo ekokokisama solo na mikolo ezali koya. Na ndakisa, talá ndenge asalisaki Yirimia asakola mpo na bingumba oyo mibale ya Ezipito: Memphis ná Thèbes. Memphis, to Nofe ezalaki moko na bingumba oyo ezalaki makasi mpo na makambo ya mombongo, ya politiki, mpe ya losambo. Kasi, Nzambe alobaki boye: “Nofe ekokóma mpenza eloko ya kokamwa mpe ekotyama mɔtɔ, bongo moto moko te akofanda kuna.” (Yirimia 46:19) Esalemaki mpenza bongo. Buku moko (In the Steps of Moses the Lawgiver) elobi ete Baarabe oyo balongaki Ezipito bapunzaki “etando monene ya bitika ya Memphis” mpe bakómisaki yango esika ya kozwa mabanga. Ebakisi ete lelo, “okomona ata libanga moko te likoló ya mabele moindo ya engumba yango ya kala.”

Ntango ezalaki ya kotɛlɛma, ekeko monene oyo bamonaki pembeni ya Memphis ezalaki molai ya mɛtrɛ soki 12

Esukaki mpe kaka bongo mpo na Thèbes, oyo bazalaki liboso kobenga No-amone to kaka No, elongo ná banzambe na yango ya mpambampamba. Mpo na mboka yango oyo ezalaki liboso engumba-mokonzi ya Ezipito mpe esika monene mpo na losambo ya nzambe Amone, Yehova alobaki boye: “Talá nazali kotyela Amone . . . likebi na ngai, ná Farao, ná Ezipito, ná banzambe na ye . . . Mpe nakopesa bango na . . . lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone.” (Yirimia 46:25, 26) Ndenge esakolamaki, mokonzi ya Babilone alongaki Ezipito mpe No-amone, engumba na yango monene. Na nsima, ntango Cambyse II, mokonzi ya Perse abundisaki mpe engumba yango na mobu 525 L.T.B., ebandaki mpenza kosila lokumu, tii nsukansuka Baroma bayaki kobebisa yango nyɛɛ. Ya solo, Biblia ekeseni na mikanda mosusu mpo ezali na bisakweli ya solo, oyo esalisi biso tótya elikya na makambo oyo elobi mpo na mikolo ezali koya.

Elikya oyo okoki kotyela motema

Moize nde akomaki esakweli ya liboso ya Biblia na eleko oyo Ezipito ezalaki ekólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba. * Esakweli yango, oyo ezali na Ebandeli 3:15, elobaki ete Nzambe akobimisa “momboto” moko oyo akoboma Satana ná “momboto” na ye, elingi koloba baoyo balandaka banzela mabe ya Satana. (Yoane 8:44; 1 Yoane 3:8) Emonanaki ete moto ya liboso ya “momboto” ya Nzambe ezalaki Masiya, Yesu Kristo.​—Luka 2:9-14.

Kristo akoyangela mabele mobimba, mpe kati na yango, akolongola mabe nyonso mpe baguvɛrnema nyonso oyo ezali konyokola bato. ‘Moto akoyangela lisusu moto te mpo na komonisa ye mpasi.’ (Mosakoli 8:9) Longola yango, ndenge moko na Yosua, oyo akambaki Yisraele ya kala na Mokili ya Ndaka, Yesu akokamba malamu mpenza “ebele mpenza ya bato” oyo babangaka Nzambe na “Mokili ya Ndaka” oyo eleki malamu, mabele mobimba oyo epɛtolami, oyo ekokóma paradiso.​—Emoniseli 7:9, 10, 14, 17; Luka 23:43.

Elikya wana etindi biso tókanisa esakweli mosusu oyo ekomamaki ntango Ezipito ezalaki ekólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba. Esakweli yango oyo ezali na Yobo 33:24, 25, elobi ete Nzambe akosikola bato ata na “libulu,” to lilita, na nzela ya lisekwa. Ya solo, longola bato oyo bakobika ntango bato mabe bakobomama, bamilio ya bato oyo bazali kokufa lelo bakozonga na bomoi mpe bakozala na elikya ya bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele. (Misala 24:15) Emoniseli 21:3, 4 elobi boye: “Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, . . . Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”

Tokokoba kolobela masolo mpe bisakweli oyo ebongi kotyela motema na masolo oyo ekolanda na banimero mosusu, oyo ekolobela bikólo mosusu oyo elekaki nguya na mokili mobimba.

^ par. 7 Soki ozali na Biblia te kasi osalelaka Internet, okoki kotánga bavɛrsɛ na Biblia ya monɔkɔ mosusu na Internet na site na biso www.mr1310.com. Ezali na esika moko bakomi “Tángá Biblia na Internet.”

^ par. 18 Nzambe abimisaki esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15 na elanga ya Edene mpe Moize ayaki kokoma yango na nsima.