Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libota ya Yehova

Libota ya Yehova

Zwá:

  1. 1. Moninga ya solo’aza wapi?

    Moto oy’okoki kotyela motema.

    Nazalaki koluka bato’a malamu

    mpe ya bolingo libota ya solo.

  2. 2. Nazwi baninga mpe libota

    Na kati’a lisangá Nzambe, kuna se bolingo.

    Ndɔtɔ na nga’ ekómi mpenza solo.

    Naza’ n’esengo na libota ya Yehova.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Lelo nazwi bandeko mingi: Basi, mibali

    Mibange, bana mike, bapapa, mama

    Bautá bikólo nyonso bamboka nyonso.

    Kozala na libota Nzambe esengo.

  3. 3. Bolingo mpenza mpe bomoko.

    Kozala na lisangá ya bandeko oyo,

    Ezali lokumu monene mpenza.

    Kozala na libota Nzambe esengo.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Toza’ loposo nyonso mpe bikólo nyonso.

    Kozala na libota Nzambe esengo.

  4. 4. Nzamb’alingi tólingana ya solo.

    Alingi tótikala na libota na ye.

    Akopesa biso bomoi ya seko.

    Tokozala na libota ya Yehova.

    Solo libota ya Yehova,

    Libota

    Yehova.