Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ngai nazali

Ngai nazali

Zwá:

  1. 1. Bileko mabe

    Eyaka, elakaka te.

    Soki pasi’ezwaki biso te nde

    Tososoli bomoi te!

    Nde Nzambe atali;

    Ye ayebi’oyo tozali;

    Ná makoki na bis’oyo’ebombani.

    Tópona se malamu nde.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Aboi moto te,

    Ata tozali n’ebele to moke.

    Asengi biso pe

    Tókipanaka neti ye.

    (MONDIMO)

    Yo ozali moninga na nga’

    Mpo na bampasi’otikaka nga’ te.

    Bangá te!

    Tango y’oza kobunda na makambo,

    Komona pasi te,

    Ngai nazali.

  2. 2. Tozolela penza

    Ná baoyo bazolela.

    Pe mai ya miso, oyo totangisi,

    Ekoki’oloba mingi bee.

    (LIBOSO YA KOKƆTA NA MONDIMO)

    Na ntango tosuki,

    Yehov’akoki kotombola biso,

    Biso pe se bongo,

    Tósunganaka, bandeko.

    (MONDIMO)

    Yo ozali moninga na nga’

    Mpo na bampasi’otikaka nga’ te.

    Bangá te!

    Tango y’oza kobunda na makambo,

    Komona pasi te,

    Ngai nazali.

    (MONDIMO)

    Yo ozali moninga na nga’

    Mpo na bampasi’otikaka nga’ te.

    Bangá te!

    Tango y’oza kobunda na makambo,

    Komona pasi te,

    Ngai nazali.