Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tómitungisa te mpo na lobi

Tómitungisa te mpo na lobi

Zwa:

  1. 1. Nayebi Paradi’ezoya na Bokonzi’a Yah,

    Mpe nazali na kondima: bampasi’ekosila.

    Kasi’ekómelaka ngai

    Manso wana, nabosani,

    Ata mpe bolingo’a Nzambe, mpo motema mpasi’eleki.

    Nzoka’ Yehov’azali.

    (MONDIMO)

    Bongo, nabondelaka ye.

    Basusi ntango’eyei ngomba,

    Nasɛngi nguya na ye.

    Naza’ ná ye; nga’ moko te.

    Maloba n’e kitoko,

    Bandeko bazali mpe.

    Tómitungisa te mpo na lobi.

    Ozwi lel’osepeli;

    Oy’a lobi, Yehov’ayebi;

    Mp’ozala kimya

    Luká ya lelo.

  2. 2. Moninga, toli napesi,

    Kobosana te.

    Tyá miso na bisengo,

    Na mikakatano te.

    Kanis’oyo Ya’asalá.

    Na bolingo’apesi Mwana.

    Mbeka mpo biso tóbika.

    Tyá motema, akosunga.

    Kobanga, longolá.

    (MONDIMO)

    Tóbondela Nzambe.

    Basusi ntango’eyei ngomba,

    Tósɛnga nguya na ye.

    Aza’ pene, toza’ ná ye.

    Maloba n’e kitoko

    Bandeko bazali mpe.

    Tómitungisa te mpo na lobi.

    Ozwi lel’osepeli;

    Oy’a lobi, Yehov’ayebi;

    Mp’ozala kimya

    Luká ya lelo.

    (MONDIMO)

    Tóbondela Nzambe,

    Basusi, ntango’eyei ngomba.

    Tósɛnga nguya na ye.

    Aza’ pene, toza’ ná ye.

    Maloba n’e kitoko,

    Bandeko bazali mpe.

    Tómitungisa te mpo na lobi,

    Ozwi lel’osepeli.

    Oy’a lobi, Yehov’ayebi.

    Mp’ozala kimya:

    Luká ya lelo​—

    Luká ya lelo.