Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sikoyo, naz’obongola makambo

Sikoyo, naz’obongola makambo

Zwá:

  1. 1. Nakanisi mingi​—

    Mpe namoni

    Mosala na ngai

    Mpo na Yehov’ekómi

    Mikolo nyonso kaka ndenge moko.

    Ez’osɛnga mpenza nakata​—

    Momeseno wana.

    (MONDIMO)

    Naz’obongola nyonso banda lelo.

    Esika mpos’ezali, nakei.

    Yehova, namoni oy’olingi.

    Nabongoli nyonso; yo okosunga.

  2. 2. Ekosɛnga mpiko,

    Nde namoni

    Mbongwana nasali

    Epesi nga makasi.

    Makambo’a sika nameki’esimbi nga.

    Nzoka baport’esí’efungwamá,

    Ngai nayebaki te.

    (MONDIMO)

    Yango, naza kobongola makambo.

    Esika mpos’ezali, nakei.

    Yehova, namoni oy’olingi.

    Nabongoli nyonso; yo okosunga.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Liboso, namonaki

    Neti eloko’eza te.

    Lokuta mabe, kala,

    Nayebaki te.

    Sikoyo nde namoni

    Mapamboli nazwi.

    Mosusu ya ebele

    Mp’ekoya na nsima.

    (MONDIMO)

    Esika mposa ezali, nakei.

    Naza kosala makambo’ebele.

    Yehova, namonaki’oy’olingi,

    Natyelaki yo’elikya, mpe’opamboli nga.

    (MONDIMO)

    Naz’obongola nyonso banda lelo.

    Esika mpos’ezali, nakei.

    Yehova, namoni oy’olingi.

    Nabongoli nyonso.

    (MONDIMO)

    Naz’obongola nyonso banda lelo.

    Esika mpos’ezali, nakei.

    Yehova, namoni oy’olingi.

    Nabongoli nyonso; yo okosunga.​—

    Okosunga.